1 Corinthians 1

Ebandeli ya mokanda

1Polo, oyo abengama na mokano na Nzambe mpo na kozala ntoma na Klisto Yesu, mpe ndeko na biso Sostene, 2epai ya Lingomba ya Nzambe oyo ezali na Korinto, baoyo Nzambe abulisa kati na Klisto Yesu mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo azali Nkolo na bango mpe Nkolo na biso : 3Tika ete ngolu mpe kimia kowuta na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Klisto ezala na bino.

Polo apesi matondi na Nzambe

4Napesaka tango nyonso matondi epai na Nzambe mpo na bino, na tina ngolu na Ye oyo epesamela bino kati na Klisto Yesu. 5Pamba te, kati na Klisto, botondisamaki na bomengo na makambo nyonso, koleka na oyo nyonso etali maloba mpe boyebi ; 6pamba te, litatoli na biso mpo na Klisto emonisamaki malamu penza epai na bino. 7Yango wana, bozangi ata likabo moko te ya molimo, wana bozali kozela komonisama ya Nkolo na biso Yesu Klisto. 8Ezali Ye nde akolendisa bino kino na suka, mpo ete bozala na pamela ata moko te na mokolo ya Nkolo na biso Yesu Klisto. 9Nzambe oyo abengaki bino na lisanga elongo na Mwana na Ye Nkolo na biso Yesu Klisto, akokisaka bilaka na Ye.

BOKABWANI KATI NA LINGOMBA

Bokabwani kati na Lingomba ya Korinto

10Bandeko, nazali kobondela bino na Kombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto : bozala na boyokani bino na bino mpe bokabwani ezala te kati na bino ; nzoka nde, bozala motema moko mpe makanisi moko. 11Bandeko na ngai, bato oyo bavandaka na ndako ya Kloe bayebisaki ngai ete koswana ezali kati na bino. 12Tala makambo oyo nalingi koloba : Moko kati na bino azali koloba : “Ngai nazali moto ya Polo ;” mpe mosusu azali koloba : “Ngai nazali moto ya Apolosi ;” mosusu azali koloba : “Ngai nazali moto ya Piere ;” mpe mosusu azali koloba : “Ngai nazali moto ya Klisto.” 13Boni, Klisto akabwana ? Ezali Polo nde babakaki na ekulusu mpo na bino ? To na kombo na ye nde bozwaki libatisi ? 14Natondaka Nzambe mpo ete nabatisa ata moto moko te kati na bino, longola kaka Krispusi mpe Gayusi, 15mpo ete moko te aloba ete abatisama na kombo na ngai. 16Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu. 17Pamba te, Klisto atindaki ngai te mpo na kobatisa bato, kasi mpo na kosakola Sango Malamu.

Bwanya ya bato : liboma mpo na Nzambe

Boye, nasengelaki kosalela te lolenge ya koloba oyo ewuti na bwanya ya bomoto, noki te ekulusu na Klisto ekomonana lokola eloko pamba.

18Pamba te, mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo babunga nzela, Kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tozwa lobiko. 19Pamba te ekomama : “Nakosukisa bwanya ya bato ya bwanya
mpe nakosilisa mayele ya bato ya mayele !”

20Boye, wapi moto ya bwanya ? Wapi moto oyo ayekola mingi ? Wapi moto ya mayele ya tango oyo ? Boni, Nzambe akomisa bwanya ya mokili liboma te ? 21Pamba te, na esika oyo Nzambe amonisaki bwanya na Ye, mokili, na nzela ya bwanya na yango esosolaki Ye te, yango wana, Nzambe asepelaki kobikisa bato oyo bandimelaka Ye na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma. 22Lokola Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya ; 23kasi biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu : libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bagreki ; 24nzoka nde, mpo na baoyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nde nguya mpe bwanya ya Nzambe. 25Pamba te, oyo emonanaka lokola liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe oyo emonanaka lokola bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.

26Bandeko, botala nanu malamu ndenge bozalaki tango Nzambe abengaki bino. Moke kati na bino bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke kati na bino bazalaki bato minene, mpe moke kati na bino bawutaki na mabota ya lokumu ! 27Kasi kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni ; 28aponaki biloko oyo ezanga tina, biloko oyo batiolaka, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo ezali, 29mpo ete moto moko te amikumisa liboso na Ye. 30Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Klisto Yesu, Ye oyo akoma mpo na biso bwanya kowuta na Nzambe, bosembo na biso, bosantu na biso mpe kokangolama na biso. 31Yango wana, ndenge ekomama : “Soki moto alingi komikumisa, tika ete amikumisa kati na Nkolo !”
Copyright information for LinMNB