1 Corinthians 11

1Bolanda ndakisa na ngai, ndenge ngai mpe nalandaka ndakisa ya Klisto.

Mobali mpe mwasi liboso ya Nkolo

2Nazali kokumisa bino na ndenge bokanisaka ngai na makambo nyonso mpe bobatelaka mateya ndenge nateyaki bino. 3Nzoka nde, nalingi boyeba ete Klisto azali mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali mokonzi ya Klisto. 4Mobali nyonso oyo azali kobondela to kosakola moto ya kozipama, azali koyokisa mokonzi na Ye soni. 5Kasi mwasi nyonso oyo azali kobondela to kosakola moto polele, azali koyokisa mokonzi na ye soni ; pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki. 6Soki mwasi alati kitambala te, asengeli kokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokola suki, eleki malamu ete alata kitambala. 7Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali. 8Pamba te, mobali akelama te wuta na mwasi, kasi mwasi nde akelama wuta na mobali. 9Mobali akelamaki te mpo na mwasi, kasi mwasi nde akelamaki mpo na mobali. 10Yango wana, mpo na ba-anjelu, mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na moto na ye.

11Nzoka nde, kati na Nkolo, ekoki kosalema te ete mwasi azala soki mobali mobali azali te, to mobali azala soki mwasi azali te. 12Pamba te, lokola mwasi akelamaki wuta na mobali, mobali mpe abotamaki na mwasi. Kasi nyonso ewutaka na Nzambe.

13Botala nanu bino moko : ezali penza malamu ete mwasi abondela Nzambe moto polele ? 14Boni, ata ndenge Nzambe asala mokili eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi ? 15Kasi ezali lokumu mpo na mwasi kozala na suki milayi, pamba te suki epesamela ye lokola kitambala. 16Soki moto moko alingi kotia tembe mpo na likambo oyo, biso mpe mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te.

Bilei ya Nkolo

17Mpo na makambo oyo elandi, nakokumisa bino te, pamba te tango bosanganaka, mayangani na bino ememelaka bino bolamu te kasi, mabe. 18Ya liboso, nayoki sango ete tango bosanganaka na Lingomba, bokabwani ezalaka kati na bino, mpe nandimi yango mwa moke. 19Pamba te, esengeli ete bokabwani ezala kati na bino mpo na kolakisa malamu soki banani kati na bino, bazali bandimi ya solo. 20Tango bosanganaka, bosanganaka te mpo na kolia bilei ya Nkolo, 21pamba te tango boliaka, moto na moto awelaka kolia bilei na ye moko. Boye, bamoko batikalaka na nzala mpe bamisusu balangwaka. 22Boni, bozali na bandako te epai wapi bokoki kolia mpe komela ? To bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe, mpe koyokisa soni baoyo bazalaka na eloko te ? Naloba na bino nini ? Nakumisa bino ? Mpo na likambo oyo ? Nakokumisa bino te !

23Pamba te, tala mateya oyo ngai nazwaki epai ya Nkolo mpe nateyaki bino : Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki ye, akamataki lipa, 24mpe sima ya kozongisa matondi, akataki yango mpe alobaki : “Oyo ezali nzoto na ngai, ezali mpo na bino. Bosalaka boye mpo na kokanisa ngai.” 25Ndenge moko mpe sima ya kolia, akamataki kopo mpe alobaki : “Kopo oyo ezali Boyokani ya Sika kati na makila na ngai. Bosalaka bongo tango nyonso bokomelaka yango, mpo na kokanisa ngai.” 26Pamba te, tango nyonso bokozala kolia lipa mpe komela kopo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino Ye akozonga.

27Yango wana, moto oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na ndenge esengeli te, akomema ngambo mpo na nzoto mpe makila ya Nkolo. 28Tika ete moto na moto amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela kopo. 29Pamba te, moto oyo alie lipa mpe ameli kopo, na kozanga kososola tina ya nzoto ya Nkolo, azali kolia mpe komela etumbu mpo na ye moko. 30Yango wana, mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na maladi, mpe bamisusu bakufa. 31Soki biso moko tomitalaki malamu penza, tolingaki kozwa etumbu te. 32Nzoka nde, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.

33Boye bandeko na ngai, tango bosanganaka mpo na kolia, bozelaka baninga. 34Soki moto azali na nzala, tika ete alia na ndako na ye mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te.

Mpe mpo na makambo oyo etikali, nakotala yango tango nakoya.
Copyright information for LinMNB