1 Corinthians 12

Makabo ya Molimo

1Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi mpo na makambo oyo etali makabo ya Molimo. 2Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te. 3Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe akoki koloba : “Tika ete Yesu alakelama mabe !”, mpe moto moko te akoki koloba : “Yesu azali Nkolo”, soki akambami na Molimo Mosantu te.

4Ezali na makabo ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko. 5Ezali na balotomo ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko. 6Lolenge ya kosalela Nkolo ezali ndenge na ndenge, kasi Nzambe azali kaka moko, Ye oyo asalaka nyonso kati na bato nyonso. 7Nzoka nde, Molimo asalaka na nzela ya moto na moto, mpo na bolamu ya bato nyonso. 8Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya ; epai na mosusu, liloba ya boyebi ; Molimo moko kaka wana, 9apesi na mosusu, kondima ; na mosusu, likabo ya kobikisa babeli ; 10na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; na mosusu, likabo ya kosakola ; na mosusu, likabo ya kososola milimo ; na mosusu, likabo ya koloba minoko ya ndenge na ndenge ; na mosusu, likabo ya kolimbola minoko. 11Kasi kaka Molimo moko wana nde asalaka misala nyonso wana ; mpe akobolaka makabo na Ye na moto na moto, ndenge Ye moko alingi.

Biteni ebele kati na nzoto moko

12Nzoto ezali kaka moko, atako ezali na biteni ebele ; mpe atako biteni yango nyonso ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Boye, ezali mpe bongo mpo na Klisto. 13Pamba te, biso nyonso tobatisamaki kaka na Molimo moko, mpo na kozala nzoto moko : ezala Bayuda to bato ya bikolo ya bapaya, ezala bawumbu to bansomi. Mpe biso nyonso tozwaki ya komela wuta na Molimo moko kaka wana.

14Nzoto ezali kaka na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele. 15Soki lokolo elobi : “Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te.” Boni, ekotika solo kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 16Mpe soki litoyi elobi : “Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te.” Boni, ekotika solo kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 17Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, boye nzoto yango elingaka koyoka ndenge nini ? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, boye nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini ? 18Kasi Nzambe atiaki eteni moko na moko na nzoto, eteni na eteni na mosala na yango, ndenge Ye moko alingaki. 19Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni nzoto elingaki penza kozala nzoto ? 20Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko.

21Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko : “Nazali na posa na yo te ;” to moto, ekoki te koloba na makolo : “Nazali na posa na bino te.” 22Nzoka nde, biteni ya nzoto oyo emonanaka lokola ezali ya bolembu, ezalaka mpe na tina. 23Biteni ya nzoto oyo tomonaka lokola ezali na lokumu mingi te, yango nde topesaka lokumu mingi ; mpe oyo tomonaka lokola ezali kitoko te, yango nde tobongisaka malamu, 24nzoka nde, biteni oyo tomonaka kitoko ezalaka na posa te ete babongisa yango. Kasi Nzambe asalaki nzoto na lolenge ete lokumu mingi epesama na biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu, 25mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi biteni esunganaka. 26Soki eteni moko ezali koyoka pasi, biteni nyonso mpe ezali koyoka pasi elongo na yango ; soki eteni mosusu ezwi lokumu, biteni nyonso mpe esepeli elongo na yango. 27Nzoka nde, bino bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto ya Klisto. 28Boye, kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma, ya mibale, basakoli, ya misato, balakisi, mpe na sima, baoyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, baoyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, baoyo bazali na likabo ya kosunga bato, baoyo bazali na likabo ya kokamba, mpe baoyo bazali na likabo ya koloba minoko ya ndenge na ndenge. 29Boni, bango nyonso bazali bantoma ? Bango nyonso bazali basakoli ? Bango nyonso bazali balakisi ? Bango nyonso basalaka bikamwa ? 30Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli ? Bango nyonso balobaka minoko ya ndenge na ndenge ? Bango nyonso balimbolaka minoko ? 31Bozala na posa makasi ya makabo oyo eleki na tina. Boye, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.
Copyright information for LinMNB