1 Corinthians 13

Bolingo

1Soki nalobi minoko ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kotia makelele to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele.

2Soki nazali na likabo ya kosakola, ya bososoli ya mabombami nyonso mpe ya boyebi ya makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.

3Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te.

4Bolingo ekangaka motema, bolingo esalisaka bato, bolingo elulaka te, bolingo emikumisaka te, bolingo emitondisaka na lolendo te. 5Bolingo esalaka te likambo oyo ebongi te, bolingo elukaka bolamu na yango moko te, bolingo esilikaka te, bolingo ekanisaka mabe te. 6Bolingo esepelaka te na makambo ya bosembo te, kasi esepelaka na bosolo. 7Bolingo elimbisaka makambo nyonso, bolingo endimaka makambo nyonso, bolingo etiaka elikya na makambo nyonso, bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso.

8Bolingo esilaka te. Bisakoli ? Ekosila. Minoko ya ndenge na ndenge ? Ekosuka. Boyebi ? Ekosila. 9Pamba te, toyebi kaka ndambu, mpe tosakolaka kaka ndambu.

10Kasi tango oyo ya kokoka ekoya, oyo ya ndambu ekosila.

11Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, nazalaki na mayele lokola ya mwana moke. Kasi tango nakomi mokolo, natiki makambo ya bomwana.

12Sikʼoyo tozali komona lokola na talatala, tozali komona penza ndenge esengeli te. Kasi mokolo moko, tokomona penza ndenge esengeli. Sikʼoyo nayebi kaka ndambu, kasi mokolo moko, nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebeli ngai.

13Nzoka nde, sikʼoyo, makambo oyo misato ewumelaka : kondima, elikya mpe bolingo. Nzoka nde, oyo eleki motuya kati na yango, ezali nde bolingo.
Copyright information for LinMNB