1 Corinthians 15

MAKAMBO OYO ETALI LISEKWA

Lisekwa ya Klisto

1Bandeko na ngai, nalingi sikʼoyo kozongisa lisusu na makanisi na bino Sango Malamu oyo nateyaki bino, Sango Malamu oyo boyambaki mpe oyo bomipesi na yango. 2Ezali na nzela ya Sango Malamu yango nde bosili kobikisama, soki kaka bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino, loba ete, bondimaki na pamba. 3Nateyaki bino liboso na nyonso, mateya oyo ngai moko nazwaki : Klisto akufaki mpo na masumu na biso ndenge ekomama ; 4bakundaki ye mpe asekwaki na mokolo ya misato ndenge ekomama. 5Amonanaki epai na Piere, mpe na bantoma zomi na mibale. 6Sima na yango, amonanaki lisusu epai na bandeko nkama mitano na mbala moko, mpe mingi kati na bango bazali nanu na bomoi kino na tango oyo, kasi bamisusu basila kokufa. 7Bongo, amonanaki epai na Jake, mpe na bantoma nyonso. 8Sima na bango nyonso, amonanaki mpe epai na ngai, ngai lokola mwana matsombe. 9Pamba te, nazali moke penza kati na bantoma mpe nakoki kutu te kobengama ntoma, mpo ete nanyokolaki Lingomba ya Nzambe. 10Kasi oyo nazali lelo, nazali yango mpo na ngolu na Nzambe, mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso, nzoka nde, ezali ngai te, ezali nde ngolu ya Nzambe oyo ezali kati na ngai. 11Na mokuse, ezala ngai to bango, biso nyonso toteyaka kaka Sango wana, mpe ezali nde Sango oyo bino bondimaki.

Lisekwa ya bakufi

12Kasi soki toteyaka ete Klisto asekwaki kati na bakufi, bongo ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete bato bakufa bakosekwa te ? 13Soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te. 14Mpe soki Klisto asekwaki te, mateya na biso elingaki kozala pamba, boye kondima na bino mpe elingaki kozala pamba. 15Wana biso tolingaki kozala batatoli ya lokuta mpo na Nzambe, soki totatoli ete Nzambe asekwisaki Klisto kati na bakufi, nzoka nde asekwisaki ye te, soki ya solo bakufi bakosekwa te. 16Pamba te, soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te. 17Mpe soki Klisto asekwaki te, kondima na bino elingaki kozala pamba, mpe bozali nanu kati na masumu ; 18baoyo mpe bakufa kati na Klisto babungi libela ! 19Soki totiaka elikya na Klisto kaka mpo na bomoi oyo, wana tozali penza bato ya mawa koleka bato nyonso.

20Kasi Klisto asekwaki solo kati na bakufi, mpe azali solo mosekwi ya liboso kati na bakufi. 21Pamba te, lokola kufa eyaki na nzela ya moto moko, ndenge wana mpe lisekwa eyaki na nzela ya moto moko. 22Ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adami, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto. 23Kasi moto na moto na tango na ye : Klisto, akosekwa moto ya liboso, mpe na sima, baoyo bazali kati na Ye, tango akoya. 24Boye, suka ekoya tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Nzambe Tata, sima na ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso. 25Pamba te, Klisto asengeli kowumela na bokonzi kino tango Nzambe akotia banguna na ye nyonso na se ya makolo na ye. 26Kufa ekozala monguna ya suka oyo ekobebisama. 27Pamba te, Nzambe atiaki biloko nyonso na se ya makolo na ye !

Nzoka nde, tango Makomi ezali kobola : “Biloko nyonso ezali na se ya bokonzi na ye,” elakisi polele ete elobi mpo na Nzambe te, oyo atiaki biloko nyonso na se ya bokonzi ya Klisto.
28Mpe tango Nzambe akotia biloko nyonso na se ya bokonzi na ye, boye ye moko Mwana mpe akomitia na se ya bokonzi ya Ye oyo atiaki biloko nyonso na se ya bokonzi na ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso.

29Soki lisekwa ezali te, bato oyo bazwaka libatisi mpo na bakufi, bakosala nini ? Soki bato nyonso oyo bakufa bakosekwa te, mpo na nini bato bazwaka libatisi mpo na bango ?

30Bongo biso, mpo na nini tango nyonso tokutanaka na makama ? 31Bandeko na ngai, mokolo na mokolo nandimaka kokufa wana nazwaka lokumu mpo na bino kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso. 32Soki nabundaki na banyama ya zamba na Efeso kaka mpo na makambo ya bomoto, litomba nini nakozwa ? Soki bakufi bakosekwa te : “Tika ete tolia mpe tomela,
pamba te lobi tokokufa !”

33Bomikosa te : baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! 34Bozongela makanisi ya malamu na ndenge oyo ekoki, mpe botika kosala masumu. Pamba te, bato mosusu bayebi Nzambe te, nalobi yango mpo koyokisa bino soni.

Lisekwa ya nzoto

35Kasi bato mosusu bakoki kotuna : “Bakufi bakosekwa ndenge nini ? Bakozonga na bomoi na nzoto nini ?” 36Bozangi nde mayele ! Mbuma ekoki kobota te soki ekufi te. 37Oyo bolonaka, ezalaka te nzoto oyo nzete ekozala na yango tango ekobima, nzoka nde bolonaka mbuma ya ble to mbuma mosusu. 38Kasi Nzambe nde apesaka yango nzoto oyo Ye moko abongisa, mpe apesa mbuma na mbuma, nzoto na yango.

39Bikelamu nyonso ya bomoi ezali na nzoto ya lolenge moko te : bokeseni ezali kati na nzoto ya bato, ya banyama, ya bandeke mpe ya mbisi. 40Bokeseni mpe ezali kati na banzoto ya likolo mpe ya se : nzoto na nzoto ezali na kongenga na yango. 41Moyi ezali na kongenga na yango, sanza ezali na kongenga na yango, minzoto mpe ezali na kongenga na yango ; boye monzoto moko ekeseni na mosusu na kongenga. 42Ekozala mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bakufi. Ekokundama nzoto ya kopola, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te ; 43ekokundama nzoto ya soni, kasi ekosekwa nzoto ya nkembo ; ekokundama nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya ; 44ekokundama nzoto ya bomoto, kasi ekosekwa nzoto ya molimo. Soki nzoto ya bomoto ezali, nzoto ya molimo mpe ezali. 45Yango wana, ekomama : “Moto ya liboso, Adami akomaki elimo ya bomoi. Kasi Adami ya suka, akomaki Molimo oyo apesaka bomoi !” 46Bomoi ya molimo, yango te eyaki liboso, kasi bomoi ya nzoto nde eyaki liboso ; bomoi ya molimo nde eyaki na sima. 47Moto ya liboso asalemaki na putulu ya mabele, azali moto ya mokili, kasi moto ya mibale awutaki na Likolo. 48Bato nyonso oyo basalema na putulu ya mabele bazali ndenge moko na moto oyo asalema na putulu ya mabele ; ndenge moko mpe, bato ya Likolo bazali ndenge moko na ye oyo awutaki na Likolo. 49Lokola tomemaki elilingi ya moto oyo asalemaki na putulu, tokomema mpe elilingi ya ye oyo awutaki na Likolo.

50Bandeko na ngai, nalobi na bino boye : nzoto ya mosuni na makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe, mpe nzoto oyo epolaka ekoki te kozwa oyo epolaka te. 51Boyoka, nalingi koyebisa bino mabombami : biso nyonso tokokufa te, kasi banso tokobongwana 52na mbalakata, noki penza, tango kelelo ya suka ekobeta. Boye, bakufi bakosekwa na nzoto oyo epolaka te, bongo biso, tokobongwana. 53Boye, nzoto oyo epolaka esengeli kolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka, kozanga kokufa. 54Tango nzoto oyo epolaka ekolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka, kozanga kokufa, kaka na tango wana nde Liloba oyo ya Makomi ekokokisama : “Elonga emeli liwa.”
55 “Oh kufa, wapi elonga na yo ?
Oh kufa, wapi nguya na yo ?”

56Kufa ezwaka nguya wuta na masumu, mpe masumu ezwaka nguya wuta na Mibeko. 57Kasi matondi na Nzambe ! Ye oyo apesi biso elonga na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto.

58Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe eloko moko te eningisa bino. Bomipesa tango nyonso na mosala ya Nkolo, mpo boyebi malamu ete mosala na bino mpo na Nkolo ekozala pamba te.
Copyright information for LinMNB