1 Corinthians 16

MITUNA YA NDENGE NA NDENGE

Makabo mpo na Lingomba ya Yelusalemi

1Mpo na makambo etali makabo oyo bozali kokongola mpo na basantu : Bosala ndenge natindaki ete Mangomba ya Galatia esala. 2Tika ete moko na moko kati na bino abombaka na ndako na ye, mbongo, kolanda ezweli na ye, na mokolo ya liboso ya poso nyonso, mpo ete tango nakoya, boluka lisusu te kokongola yango. 3Tango nakoya, nakotinda na Yelusalemi, bato oyo bino moko bokopona elongo na mikanda, mpo ete bamema likabo na bino. 4Soki ekomonana malamu ete ngai mpe nakende, wana tokokende na bango nzela moko.

Mabongisi ya Polo

5Nazali kokanisa koya epai na bino, sima ya koleka na Masedwane, pamba te nasengeli koleka wana. 6Tango mosusu, nakoki kovanda mwa tango epai na bino, mpe kolekisa tango nyonso ya malili mpo ete bokoka kosalisa ngai, ete nakoba mobembo na ngai kino epai nazali kokende. 7Nazali na posa ya komona bino te sikʼoyo wana nazali koleka, pamba te nazali na elikya ete nakovanda na bino mwa mikolo, soki Nkolo akolinga. 8Kasi nakotikala awa na Efeso kino na mokolo ya Pantekote, 9pamba te nakutani na libaku malamu ya kosakola Sango Malamu mpe banguna ebele.

10Soki Timote akomi epai na bino, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo lokola ngai. 11Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko pamba. Bosalisa ye mpo ete akoba mobembo na ye mpe akoma epai na ngai na kimia, pamba te ngai nazali kozela ye elongo na bandeko.

12Nzoka nde, mpo na ndeko na biso Apolosi, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko. Kasi azali penza na posa te ya kosala yango sikʼoyo ; akoya kaka soki akutani na libaku malamu.

Mitindo ya suka

13Bosenzela, botelema ngwi na kondima, bozala bato ya mpiko mpe ya makasi. 14Bosala makambo nyonso na bolingo.

15Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye, bazalaki bato ya liboso ya kobongola motema na Akayi. Bamipesa mpo na kosalela basantu. Nazali kolendisa bino bandeko 16ete botosaka bato ya ndenge wana, mpe botosaka moto nyonso oyo asalisaka bango mpe asalaka elongo na bango.

17Nasepelaki mingi tango Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi bakomaki epai ngai, pamba te tango namonaki bango, ezalaki lokola namoni bino nyonso. 18Balendisaki molimo na ngai mpe milimo na bino : boyeba solo kopesa lokumu na bato motindo oyo.

Bambote

19Mangomba ya Azi etindeli bino mbote. Akilasi mpe Priska elongo na lingomba oyo esanganaka na ndako na bango bapesi bino mbote mingi kati na Nkolo. 20Bandeko nyonso batindeli bino mbote ! Bopesanaka bino na bino beze ya bondeko. 21Bozwa mbote oyo ngai moko Polo nasili kokomela bino. 22Soki moto moko alingi Nkolo te, tika ete alakelama mabe. E e Nkolo, yaka ! 23Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso ! 24Bolingo na ngai ezala na bino nyonso kati na Klisto Yesu. Amen !
Copyright information for LinMNB