1 Corinthians 4

Polo : Ntoma ya Klisto

1Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe. 2Nzoka nde, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo. 3Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to ya esambiselo ya bato elobelaka ngai eloko moko te. 4Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te, nzoka nde, yango te nde ezali kolongisa ngai ; oyo asambisaka ngai ezali nde Nkolo. 5Yango wana, bosambisa te liboso ya tango oyo ekatama, bozela kino tango Nkolo akoya. Ye akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso na bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye, kowuta na Nzambe.

6Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi mpo na bolamu na bino, mpo ete na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : “Boleka ndelo te ya makambo oyo ekomama.” Boye, bokomitombola na lolendo te mpo na kopona moko mpe koyina mosusu. 7Boni, nani azali kokesanisa yo na bato misosu ? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te ? Soki bapesaki yo yango, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te ?

8Bosiʼbozwi nyonso oyo bolingaka ! Bosibokomi bato ya bomengo ! Bosibokomi bakonzi, na nzela na biso te. Ya solo, nalingi ete bokoma penza bakonzi, mpo ete biso mpe tokoka kokoma bakonzi elongo na bino. 9Pamba te, nakanisi ete Nzambe abimisa biso bantoma na molongo ya suka, lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya liwa na esika ya masano. Pamba te bakomisa biso lisano mpo na mokili, mpo na baanzelu, mpe mpo na bato. 10Biso tozali bazoba mpo na Klisto, kasi bino bozali bato ya bwanya kati na Klisto ! Tozali na bolembu, kasi bino bozali na makasi ! Bozali kozwa lokumu, kasi biso bazali kotiola biso ! 11Kino tango oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, bazali kobeta biso, mpe tozali na esika ya kovanda te, 12tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka ; tango banyokolaka biso, tokangaka mitema mpo na yango ; 13tango balobaka makambo ya lokuta mpo na biso, tozongisaka na boboto nyonso. Mpe kino sikʼoyo tokoma lokola biloko ya bosoto ya mokili, lokola biloko oyo babwakaka na folu.

Bokonzi Ya Polo

14Nakomi makambo oyo mpo na koyokisa bino soni te, kasi mpo na kokebiso bino, lokola bana na ngai ya bolingo. 15Pamba te, ata soki bozali na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, nzoka nde bozali na batata ebele te, pamba te ngai nde nazali tata na bino kati na Klisto Yesu, na nzela ya Sango Malamu. 16Bongo nabondeli bino, bolanda ndakisa na ngai. 17Ezali na tina wana nde, natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo mpe ye oyo azali ya kokangama makasi na Nkolo. Ye akolobela biso lisusu nzela na ngai kati na Klisto Yesu, lokola nateyaka yango bisika nyonso kati na mangomba nyonso. 18Bato mosusu kati na bino bakoma bato ya lofondu, bakanisi ete, nakoya lisusu te epai na bino. 19Kasi soki Nkolo alingi, etikali moke naya epai na bino, mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato wana ya lofundu balobaka, kasi mpe, nguya nini bazali na yango. 20Pamba te, Bokonzi ya likolo ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya. 21Bolingi nini ? Naya epai na bino na fimbo, to na bolingo mpe na molimno ya boboto ?
Copyright information for LinMNB