1 Corinthians 5

BIZALELI KATI NA LINGOMBA

Ekobo Kati Na Lingomba

1Bato bazali koloba bipai nyonso ete ekobo ezali kosalama kati na bino ; mpe ekobo oyo, emonanaka kutu te epai ya bapakano, na ndenge ete : moto moko kati na bino azali kosangana na mwasi ya tata na ye. 2Kasi bino, bozali ya kotonda na lofundu. Ekokaki kutu boyoka mawa mingi, mpe bolongola kati na bino moto oyo asalaki likambo ya ndenge wana. 3Pamba te mpo na ngai, ata nazali na bino na nzoto te, kasi nazali na bino na molimo, mpe nasiʼnakataki likambo ya moto oyo asalaki bongo, lokola nde nazalaki na bino elongo. 4Tango bokosangana na kombo ya Nkolo na biso Yesu, ngai mpe nakozala na bino na molimo, mpe nguya ya Nkolo na biso Yesu ekozala mpe na bino : 5moto ya ndenge wana, bokaba ye na maboko ya Satana mpo ete nzoto na ye ebebisama, mpe molimo na ye ebika na Mokolo ya Nkolo. 6Komikumisa na bino ezali malamu te. Boyebi te ete “mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya farine ?”

7Bolongola kisi ya mapa ya kala, mpo bozala “potopoto ya sika”, oyo ezangi kisi ya mapa. Pamba te Klisto, mwana meme na biso ya Pake asiʼapesama likabo. 8Yango wana tosala feti na kisi ya mapa ya kala te, kisi ya mapa ya makambo ya mabe mpe ya nko, kasi na mapa oyo ezangi kisi, mapa ya makambo ya sembo mpe ya solo. 9Nakomelaki bino na mokanda na ngai ete bozala lisanga moko te na bato oyo basalaka ekobo. 10Elingi koloba te ete na bato nyonso ya mokili oyo, oyo basalaka ekobo, to bazali bato ya lokoso ya mbongo, to babotolaka biloko ya bato, to basambelaka bikeko ; pamba te soki ezali bongo, wana esengeli ete bolongwa na mokili.

11Kasi sikʼoyo nakomeli bino, mpo ete bozala lisanga moko te na moto oyo amibengaka “ndeko”, kasi asalaka ekobo, to azali moto ya lokoso ya mbongo, to mosambeli bikeko, to mofingi bato, to molangwi masanga, to moto oyo abotolaka biloko ya bato. Moto ya ndenge wana, bolia na ye kutu esika moko te.

12Boni kosambisa bato oyo bazali ya Lingomba te, yango etali ngai ? Boni bosambisaka te bato ya Lingomba ? 13Baoyo bazali ya Lingomba te, Nzambe akosambisa bango. Kasi bino, bobengana moto mabe kati na bino.
Copyright information for LinMNB