1 Corinthians 6

Kofundana Kati Ya Bakristo Bango Na Bango

1Soki moto moko na kati na bino azali na likambo na moto mosusu, mpo na nini akendaka kofunda yango epai ya bapakano, na esika ete akende kofunda yango epai ya basantu ? 2Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili ? Mpe, soki bino bokosambisa mokili, bongo bozali ya kokoka te mpo na kosambisa mwa makambo ya mike-mike ? 3Boyebi te ete, biso tokosambisa baanzelu ? Bongo mpo na nini te makambo ya bomoi oyo ! 4Nzoka nde, soki bozali na mikakatano mpo na oyo etali makambo ya bomoi oyo, bozwaka lokola bazuzi, bato oyo bazali na tina te na kati ya Lingomba. 5Nalobi yango mpo na koyokisa bino soni. Ezali solo ete, ata moto moko te ya bwanya azali kati na bino, oyo akoki kosambisa makambo kati na bandeko na ye ? 6Pamba te, ndeko moko akendaka kofunda ndeko mosusu, mpe asalaka yango liboso ya bato oyo bandimela te. 7Na ndenge nyonso, yango ezali mbeba mpo na bino, awa bozali kofundana bino na bino. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe ? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino ? 8Pamba te, bino moko mpe bokosaka mpe bosalaka mabe ; mpe bosalaka yango epai ya bandeko na bino. 9Boyebi te ete, bato oyo basalaka mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : ezala bato oyo basalaka kindumba, basambeli ya bikeko, basali ekobo, baoyo balula makambo ya soni, baoyo basanganaka na baninga na bango mibali, 10miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, baoyo bafingaka baninga, baoyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe. Mpe bato mosusu kati na bino, bozalaka ndenge wana. 11Kasi basokolaki bino, bakomisaki bino basantu, mpe bakomisaki bino bato na sembo kati na kombo ya Nkolo Yesu Klisto, mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.

Bosalela Nzoto Na Bino Mpo Na Nkembo Ya Nzambe

12“Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso”, kasi makambo nyonso ezali na litomba te. Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso, kasi nakotika te ete, nazala mowumbu ata ya eloko moko. 13“Biloko ya kolia esalama mpo na libumu, mpe libumu esalama mpo na biloko ya kolia.” Kasi Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalama te mpo na ekobo, kasi ezali mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto. 14Pamba te, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa biso mpe, na nguya na ye. 15Boyebi te ete nzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto ? Nakoki kozwa biteni ya Nzoto ya Klisto, mpo nakomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba ? Ata moke te ! 16Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba, akomi na ye nzoto moko ? Pamba te, elobama : “Bango mibale bakokoma nzoto moko.” 17Kasi moto oyo asangani na Nkolo, azali moko na ye kati na molimo. 18Yango wana, bokima ekobo. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo asali ekobo, asali lisumu na nzoto na ye moko. 19Boyebi te ete nzoto na bino ezali ndako ya Molimo Mosantu, oyo azali kati na bino, oyo bozwaki wuta na Nzambe ? Mpe bozali ya bino moko te ; 20pamba te, basombaki bino na talo mingi penza. Yango wana, bopesa Nzambe nkembo na nzoto na bino.
Copyright information for LinMNB