1 John 1

Liloba ya bomoi

1Oyo ezalaki banda na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe maboko na biso esimbaki—yango tozali kosakola mpo na Liloba ya bomoi. 2—Bomoi emonanaki ; tomonaki yango mpe totatolaki mpo na yango, mpe tozali kosakolela bino bomoi ya seko, oyo ezalaki elongo na Tata mpe oyo balakisaki biso. 3—Tozali koyebisa bino oyo tomonaki mpe toyokaki, mpo ete bino mpe bokoka kozala lisanga na biso. Mpe lisanga na biso ezali elongo na Tata mpe elongo na Mwana na ye Yesu Kristo. 4Tozali kokoma makambo oyo, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.

Totambola kati na moi

5Oyo ezali Sango toyokaki epai na ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali moi ; mpe kati na ye, molili ezali ata moke te.

6Soki tolobi ete tozali lisanga elongo na ye, mpe tozali kaka kotambola kati na molili, wana tozali bato ya lokuta mpe tosalelaka solo te. 7Kasi soki tozali kotambola kati na moi, ndenge ye moko azali kati na moi, wana tozali lisanga moko, mpe makila ya Yesu, Mwana na ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso.

8Soki tolobi ete tozangi masumu, wana tozali komikosa biso mokompe solo ezali kati na biso te. 9Nzokande soki, toyamboli masumu na biso, Nzambe azali sembo mpe akokisaka maloba na ye, akolimbisa masumu na biso, mpe akopetola biso na mabe nyonso.

10Soki tolobi ete tosalaka masumu te, wana tozali kokomisa Nzambe moto ya lokuta, mpe Liloba na ye ezali na esika te na kati ya bomoi na biso.
Copyright information for LinMNB