1 John 3

1Bolingo oyo Tata apesa biso ezali monene mingi penza mpo ete tobengama bana ya Nzambe ! Mpe tozali bongo ! Yango wana mokili eyebi biso te, mpo eyebaki mpe Nzambe te.

2Balingami, tozali sikʼoyo bana na Nzambe, mpe ndenge tokozala, naino emonani te. Kasi toyebi ete tango Kristo akomonana, tokokoma lokola ye, pamba te tokomona ye ndenge azali. 3Moto nyonso oyo azali na elikya oyo kati na Kristo, azali komipetola ye moko, ndenge Kristo azali peto.

4Moto nyonso oyo asalaka masumu abukaka mpe Mobeko ; pamba tekosala lisumu ezali : kobuka Mobeko. 5Kasi boyebi ete Kristo amonanaki mpo ete alongola masumu na biso. Mpe lisumu ezali kati na ye te. 6Moto nyonso oyo azali kati na Kristo asalaka masumu te. Moto nyonso oyo azali kokoba kosala masumu, amona ye te to mpe ayebi ye te.

7Bana na ngai, moto moko te abungisa bino nzela. Moto oyo asalakamakambo ya bosembo azali sembo, ndenge Kristo azali sembo. 8Moto oyo asalaka masumu azali moto ya zabolo, pamba te zabolo abanda kosala masumu wuta na ebandeli. Tina oyo Mwana na Nzambeamonanaki, ezalaki mpo ete aboma misala ya zabolo. 9Moto moko te oyo azali mwana na Nzambe akobaka kosala masumu, pamba te Liloba ya Nzambe ezali kati na ye ; akoki kokoba kosala masumu te, pamba te azali mwana ya Nzambe.

10Tala ndenge bokoki koyeba banani bazali bana na Nzambe, mpebanani bazali bana ya zabolo : moto nyonso oyo asalaka makambo oyo ezali sembo te mpe alingaka ndeko na ye te, azali mwana na Nzambe te.

Bolingo ezali elembo ya mokristo

11Mateya oyo boyokaki wuta na ebandeli, yango oyo : Tolingana moko na moko. 12Bozala lokola Kayina te, ye oyo azalaki moto ya molimo mabe mpe abomaki ndeko na ye. Abomaki ye mpo na nini ? Pamba te misala na ye ezalaki mabe mpe oyo ya ndeko na ye ezalaki sembo.

13Bandeko na ngai, bokamwa te soki mokili ezali koyina bino. 14Toyebi ete tosiʼtolongwa wuta na liwa mpe tokoma na bomoi, pamba te tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te, azali kati na kufa. 15Moto oyo ayinaka ndeko na ye, azali mobomi, mpe boyebi ete ata mobomi moko te azali na bomoi ya seko kati na ye. 16Tala ndenge tokoyeba soki bolingo ezali nini : Yesu Kristo akabaki bomoi na ye mpo na biso. Biso mpe, tosengeli kokaba bomoina biso mpo na bandeko na biso.

17Soki moto azali na biloko ya mokili oyo, mpe amoni ndeko na ye azali na posa ya eloko, kasi ayokeli ye mawa te, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kozala kati na ye ? 18Bana na ngai, tolingana kaka na maloba te, to mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo.

19Tala ndenge tokoyeba ete tozali bato ya makambo ya solo, mpe ndenge tokotondisa mitema na biso na elikya liboso na ye, 20soki mitema na biso ezali kofunda biso. Pamba te Nzambe azali monene koleka mitema na biso, mpe ayebi makambo nyonso. 21Balingami, soki mitema na biso ezali kofunda biso te, tozali na elikya liboso ya Nzambe 22mpe tokozwa wuta na ye, eloko nyonso oyo tokosenga, pamba tetozali kotosa Mibeko na ye, mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye. 23Mpe Mobeko na ye yangʼoyo : tondima na kombo ya Mwana na ye Yesu Kristo mpe tolingana moko na moko ndenge atindaki biso.

24Moto oyo atosaka Mibeko ya Nzambe azali kati na Nzambe, mpe Nzambe kati na ye. Mpe, tala ndenge toyebi ete Nzambe azali kati na biso : Toyebi yango na nzela ya Molimo oyo apesaki biso.
Copyright information for LinMNB