1 John 4

Ndenge nini koyeba baprofeta ya solo mpe ya lokuta

1Balingami, bondima molimo nyonso te, kasi bomeka milimo mpo na koyeba soki yango ewuti na Nzambe ; pamba te baprofeta mingi ya lokuta basiʼbabimi na mokili. 2Tala ndenge bokoki koyeba Molimo ya Nzambe : molimo nyonso oyo ezali kondima ete Yesu Kristo akomaki moto, molimo yango ewuti na Nzambe, 3kasi molimo nyonso oyo ezali kondima Yesu te, ewuti na Nzambe te. Yango ezali molimo ya monguna ya Kristo, oyo boyokaki ete ezali koya mpe ezali sikʼoyo kati na mokili. 4Bana na ngai, mpo na bino, bozali ya Nzambe mpe bosiʼbolonga milimoyango, pamba te oyo azali kati na bino azali monene koleka oyo azali kati na mokili. 5Baprofeta ya lokuta bazali ya mokili ; yango wana balobaka makambo yamokili, mpe mokili eyokelaka bango. 6Biso tozali ya Nzambe, mpe moto oyo ayebi Nzambe, ayokelaka biso ; kasi moto oyo azali ya Nzambe te, ayokelaka biso te. Tala ndenge toyebaka Molimo ya solo na molimo ya lokuta.

Nzambe azali bolingo

7Balingami, tolingana moko na moko, pamba te bolingo ewuti na Nzambe. Mpe moto nyonso oyo azali na bolingo azali mwana ya Nzambe mpe ayebi Nzambe. 8Moto oyo azangi bolingo, ayebi Nzambe te ; pamba te Nzambe azali bolingo.

9Tala ndenge Nzambe alakisaki biso bolingo na ye : Atindaki Mwana na ye moko kaka kati na mokili, mpo ete tozala na bomoi na nzela na ye. 10Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi ezali ye moto alingaki biso, mpe atindaki Mwana na ye mpo azala likabo mpo na masumu na biso.

11Balingami, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana moko na moko. 12Moto moko te asiʼamona Nzambe ; kasi soki tolingani moko na moko, wana Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na ye ezali ya kokoka kati na biso.

13Tala ndenge tozali koyeba ete tozali kati na Nzambe mpe Nzambe azali kati na biso : mpo apesa biso Molimo na ye. 14Tosiʼtomona mpe totatolaka ete Tata atinda Mwana na ye mpo azala Mobikisi ya mokili.

15Soki moto andimi ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, Nzambe azali kati na ye mpe ye azali kati na Nzambe. 16Mpe, tosiʼtoyeba mpe tondima bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo : mpe moto oyo azali kati na bolingo, azali kati na Nzambe mpe Nzambe azali kati na ye. 17Na ndenge oyo nde bolingo ezali komonana ete ezali ya kokoka kati na biso, mpo ete tozala na kobanga ta na mokolo ya kosambisama, pamba te bomoi na biso kati na mokili oyo ekokani na oyo ya Kristo.

18Na bolingo, kobanga ezalaka te. Kasi bolingo oyo ezali ya kokokaelongolaka kobanga, pamba te kobanga ememaka mitungisi elongo na yango. Mpe moto oyo abangaka azali naino ya kokoka te kati na bolingo. 19Tozali na bolingo, mpo Nzambe alingaki biso liboso.

20Soki moto alobi : “Nalingaka Nzambe”, mpe azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Pamba te moto oyo alingaka ndeko na ye teoyo ye amonaka, bongo ndenge nini akoki kolinga Nzambe oyo ye amonaka te ?

21Kutu, Kristo apesaki biso mobeko oyo : Moto oyo alingaka Nzambe, esengeli alinga mpe ndeko na ye.
Copyright information for LinMNB