1 John 5

Kondimela Mwana na Nzambe

1Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Kristo, azali mwana na Nzambe ; mpe moto nyonso oyo alingaka Tata, alingaka mpe Mwana na ye.

2Tala ndenge toyebaka ete tolingaka bana na Nzambe : ezali tango tozali kolinga Nzambe mpe tozali kobatela Mibeko na ye. 3Pamba te kolinga Nzambe ezali nde kobatela Mibeko na ye. Mpe Mibeko na ye ezali pasi te, 4mpo moto nyonso oyo azali mwana na Nzambe, alongaka mokili ; mpeelonga oyo elongaka mokili, ezali : kondima na biso. 5Nani akoki kolonga mokili ? Kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe.

6Yesu Kristo azali moto oyo ayaki, ayaki na mayi na makila. Ayaki kaka na mayi te, kasi na mayi mpe na makila. Mpe Molimo moto atatoli bongo, mpo Molimo azali solo. 7Pamba te, batemwe bazali misato : 8Molimo, mayi, mpe makila ; mpe bango misato balobaka ndenge moko.

9Tondimaka matatoli ya bato, kasi litatoli ya Nzambe eleki monene, pamba te yango ezali litatoli ya Nzambe oyo apesaki mpo na Mwana na ye. 10Moto oyo andimaka Mwana ya Nzambe azali na litatoli oyo kati na motema na ye. Moto oyo andimaka Nzambe te, akomisi Nzambe moto ya lokuta, pamba te andimi te litatoli oyo Nzambe apesa mpo na Mwana na ye. 11Mpe, litatoli yango yangʼoyo : Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na ye.

12Moto oyo azali na Mwana, azali na bomoi ; oyo azali na Mwana na Nzambe te, azali na bomoi te.

Elikya ya bakristo

13Nakomeli bino makambo oyo, bino baoyo bondimaka na kombo ya Mwana na Nzambe, mpo bokoka koyeba ete bozali na bomoi ya seko. 14Mpe tozali na elikya oyo liboso ya Nzambe : ete soki tosengi eloko na mokano na ye, akoyoka biso. 15Mpe soki toyebi ete ayokaka biso, toyebi mpe ete tokozwa biloko nyonso oyo tosengaka ye.

16Soki moto moko amoni ndeko na ye azali kosala lisumu oyo ememaka na liwa te, esengeli abondela mpo na ndeko wana, mpe Nzambeakopesa ndeko yango bomoi. Nazali koloba mpo na baoyo basalaka masumuoyo ememaka na liwa te. Ezali na lisumu oyo ememaka na liwa. Nazali koloba te ete bobondela mpo na lisumu wana.

17Mabe nyonso ezali lisumu ; mpe ezali na lisumu oyo ememaka na liwa te. 18Toyebi ete moto oyo azali mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu ; moto oyo azali mwana na Nzambe amibatelaka ye moko, mpe molimo mabeasimbaka ye te. 19Toyebi ete tozali bana ya Nzambe, mpe mokili mobimba ezali na nse ya bokonzi ya molimo mabe. 20Nzokande toyebi ete Mwana na Nzambe ayaki mpe apesaki biso bososoli, mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na ye oyo azali solo, elingi koloba : kati na Mwana na ye Yesu Kristo. Ye azali Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.

Etinda ya suka

21Bana na ngai, bokeba na bikeko !
Copyright information for LinMNB