1 Peter 1

Ebandeli ya Mokanda

1Ngai Piere, mopostolo ya Yesu Kristo, natindi mokanda oyo epai ya bato oyo Nzambe apona, baoyo bazali na mikili ya bapaya, mpe bapalangana na Ponti, Galatia, Kapadosi, Azia mpe Bitini. 2Nzambe Tata apona bino na lolenge ya mabongisi na ye oyo abongisaliboso penza, mpe akomisa bino basantu na nzela ya Molimo na ye, mpo botosa Yesu Kristo mpe bokoma peto na makila na ye.

Tika ete botonda na ngolu mpe na kimia.

ELIKYA YA LOBIKO

Elikya ya solo-solo

3Lokumu na Nzambe mpe tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo ! Kati na mawa na ye oyo eleki monene, apesaki biso mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo kati na bakufi, mpo ete tozala na elikya oyo ya solo-solo ; 4Pamba te, abomopanga biso bomengo oyo ekoki kobeba te, oyo ekokikozwa bosoto te, mpe ekoki kobungisa kitoko na yango te. Azali kobomba yango na Likolo mpo na bino, 5baoyo ye azali kobatela na nguya na ye, na nzela ya kondima, kino na koya ya lobiko oyo esiʼebongisami mpo ete emonana na tango ya suka.

6Yango nde epesaka bino esengo, atako sikʼoyo esengeli boyoka mawa mpo na mwa tango moke, mpo na bapasi ya ndenge na ndenge oyo bozali kokutana na yango. 7Bapasi yango ezali koya mpo ete kondima na bino ekoka komonana ete ezali kondima ya solo, mpe ekoka kopesa bino masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu Kristo akokomonana. Pamba te, kondima na bino eleki wolo na motuya—wolo oyo ebebaka tango bamekaka yango na moto.

8Ata bomonaki Yesu Kristo te, kasi bolingaka ye ; ata mpe sikʼoyo bomonaka ye te, kasi bondimaka ye, mpe bozali ya kotonda na esengo ya nkembo, oyo moto ata moko te akoki kolimbola yango, 9Pamba te bozali kozwa litomba ya kondima na bino : yango nde lobiko ya milimo na bino.

10Baprofeta oyo basakolaki bolamu oyo Nzambe abombelaki bino, batunaki-tunaki mpe balukaki penza-penza koyeba tina ya lobiko yango. 11Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Kristo alobaki, ekosalama. Molimo yango azalaki kati na bango, mpe ayebisaki bango na liboso penza bapasi oyo Kristoamonaki mpe nkembo oyo ezalaki kozela ye. 12Nzambe alakisaki bango ete, Sango oyo bango bazwaki mokumba mpo na koyebisa, ezalaki mpo na bango te, kasi mpo na bino. Mpe Sango yango, bozali koyoka yango sikʼoyo na minoko ya baoyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo. Ata baanzelu mpe bazali na posa mingi penza mpo na koyebayango.

MAKAMBO OYO BAKRISTO BASENGELI KOSALA

Bozala na elikya

13Yango wana, bobongisa makanisi na bino mpo na mosala ; bomikengela ; botia elikya na bino mobimba kati na mapamboli oyobakopesa bino tango Kristo akomonana.

Bozala basantu

14Lokola bozali bana ya botosi, bolanda lisusu baposa ya mabe te oyo bozalaki na yango tango bozalaki kati na kozanga koyeba. 15Kasi, lokola ye oyo abengaki bino azali Mosantu, bino mpe bozala basantu kati na makambo nyonso oyo bosalaka. 16Pamba te, ekomama : Bozala basantu pamba te ngai nazali Mosantu !

Bobangaka Nzambe

17Lokola bobengaka Tata, ye oyo asambisaka moto na moto na mosala na ye mpe aponaka bilongi te tango asambisaka ; yango wana botambolaka awa na mokili lokola bapaya ; kati na kobanga.

18Pamba te boyebi ete, bakangolaki bino na bizaleli na bino ya Pamba-Pamba, oyo bankoko na bino batikelaki bino, na nzela ya biloko oyo ebebaka te, lokola : palata to wolo, 19kasi na nzela ya makila ya ntalo ya Kristo, oyo azali lokola Mwana-meme oyo azangi mabe mpe bosoto. 20Nzambe aponaki ye mpo na yango, liboso ete mokili esalama, kasiamonani na batango oyo ya suka mpo na bino. 21Na nzela na ye bozali kondima Nzambe, oyo asekwisaki ye kati na bakufi mpe apesaki ye nkembo, mpo ete kondima na bino mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe.

Bozala na bolingo

22Sikʼoyo lokola bosiʼbokomi peto na nzela ya kotosa makambo yasolo, mpo ete bozala na bolingo ya solo epai ya bandeko na bino, bolinganaka mingi penza moko na moko, na motema mobimba. 23Pamba te, bosiʼbobotami lisusu, ezali te na molona oyo ebebaka, kasi na nzela ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali na bomoi mpe ekotikala libela na libela. 24Pamba te : Bato nyonso bazali lokola matiti,
mpe nkembo na bango nyonso
ezali lokola bafololo ya esobe ;
Lititi ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,

25 kasi Liloba ya Nkolo ekotikala libela na libela.

Mpe Liloba oyo, yango nde bateyaki bino.
Copyright information for LinMNB