1 Peter 2

Kokola na Molimo

1Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya mabe mpe lokuta nyonso, kokosana, zuwa, mpe kotonga nyonso. 2Lokola bana oyo babotami sika, boyokaka posa mingi ya miliki ya peto oyo ya molimo, mpo ete na nzela na yango, bokoka kokola kati na lobiko na bino, 3Sikʼoyo lokola bosiʼbomeki ete Nkolo azali malamu.

Kosala ndako mpo na Nzambe

4Lokola bosiʼboye epai na ye, ye libanga ya bomoi, oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango, mpe ezali na motuya mingi epai na ye ; 5bino mpe, bozali lokola mabanga ya bomoi, bozali kotongama na kati ya ndako ya molimo, mpo bozala banganga-Nzambe ya bosantu, oyo bokozala na mokumba ya kopesaka makabo ya molimo, oyo esepelisaka Nzambe na nzela ya Yesu Kristo. 6Pamba te Makomi ezali koloba boye : Tala, natie libanga na Siona,
oyo esimbaka ndako mobimba,
libanga ya motuya mingi mpe oyo eponama ;
mpe moto oyo akondimela yango
akoyoka soni ata moke te !

7Ya solo, libanga yango ezali na motuya mingi mpo na bino baoyo bondimaka. Kasi mpo na baoyo bandimaka te : Libanga oyo batongi ndako babwaka,
Ekomi libanga ya tina penza,

8mpe, libanga oyo ebetisaka bato mabaku,
libanga oyo ekweyisaka bato !

Bazali kobeta mabaku mpo baboyi kotosa Liloba. Yango ebongisama bongo mpo na bango.

9Kasi bino, bozali libota oyo eponama, bozali banganga-Nzambe ya bokonzi monene, bozali ekolo ya bosantu, mpe bato oyo bazali ya Nzambe, mpo ete bokoka kosakola lokumu ya ye oyo abengaki bino mpo bolongwa na molili mpe boya na moi na ye, oyo ezali ya kokamwa mingi. 10Liboso, bozalaki bato na ye te, kasi sikʼoyo bokomi bato ya Nzambe ; liboso, ayokelaki bino mawa te, kasi sikʼoyo ayokeli bino mawa.

KOZALA KATI NA MOKILI YA MATATA

Bozala na ezaleli ya malamu kati na bato oyo bandimaka te

11Balingami, boyeba ete bozali na kati ya mokili lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nabondeli bino : boboya baposa mabe ya nzoto, Pamba te yango ebundaka na elimo na bino. 12Bozala na bizaleli ya malamu na kati ya bapakano, mpo ata bazali kofunda bino ete bozali kosala mabe, kasi bakoka komona misala na bino ya malamu mpe bakumisa Nzambe na mokolo akoya kotala bino.

Bozala na botosi

13Mpo na bolingo ya Nkolo, botosa bokonzi nyonso oyo etiami kati na bato : ezala mokonzi monene, ye oyo azali na bokonzi likolo ya bato nyonso, 14to na baguvelenele, baoyo ye atinda mpo na kopesa etumbu na bato oyo basalaka mabe, mpe mpo na kokumisa baoyo basalaka malamu. 15Pamba te yango ezali mokano ya Nzambe, ete na nzela ya kosala malamu, bokoka kokanga minoko ya bato oyo bayebi eloko te mpe bazangi mayele. 16Bozala bato ya bonsomi, kasi bosalela bonsomi yango te lokola elamba mpo na kobomba mabe na bino ; Kasi bozala bawumbu ya Nzambe. 17Botosaka bato nyonso ; bolingaka bandeko nyonso ; “bobangaka Nzambe, mpe botosaka mokonzi monene !”

Bawumbu mpe bakonzi na bango

18Bino bawumbu, botosaka bakonzi na bino na botosi nyonso, kaka te baoyo bazali malamu mpe boboto, kasi baoyo mpe bazali matata. 19Pamba te, yango ezali malamu soki moto akangi motema na bapasi oyo bazali koyokisa ye kaka Pamba, mpo azali kotosa Nzambe. 20Pamba te lokumu nini bokozwa soki babeti bino mpo na mabe oyo bosalaki mpe bokangi mitema mpo na yango ? Kasi soki bonyokwami mpo bozali kosala malamu, mpe bokangi mitema mpo na yango, ya solo, yango ezali likambo moko ya malamu na miso ya Nzambe.

21Ezali mpo na yango nde Nzambe abengaki bino, Pamba te, Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, mpe atikelaki bino ndakisa, mpo ete bolanda banzela na ye. 22Ye asalaki ata lisumu moko te, mpe monoko na ye elobaki lokuta te. 23Tango bafingaki ye, azongisaki na kofinga te. Tango banyokolaki ye, akanelaki moto moko te ; kasi amitikaki na maboko ya Nzambe, ye oyo asambisaka na bosembo nyonso. 24Amemaki masumu na biso na nzoto na ye, likolo ya ekulusu, mpo ete tokufa na masumu mpe tozala na bomoi mpo na bosembo ; bobiki na nzela ya bapota na ye. 25Pamba te, bozalaki lokola bameme oyo ezalaki kotelengana-telengana, kasi sikʼoyo bosili kozonga epai ya Mobateli ya bameme mpe mokengeli ya milimo na bino.
Copyright information for LinMNB