1 Peter 3

Basi na mibali na bango

1Ndenge moko mpe mpo na bino basi, botosaka mibali na bino, mpo soki mibali misusu na kati na bango bandimaka Liloba te, bandima yango na nzela ya ezaleli ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te, 2Pamba te bakomona ete bazali na bomoi ya bopeto mpe ya botosi.

3Kitoko na bino esengeli te ewuta na biloko oyo emonanaka na miso : lokola, kokanga suki, kolata babizu ya wolo to bilamba ya kitoko. 4Kasi ebongi malamu ete kitoko na bino ewuta na kati ya mitema : kitoko oyo esilaka te, oyo ya molimo ya boboto mpe ya kimia, oyo ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe. 5Pamba te, kala, basi ya bosantu oyo bazalaki kotiela Nzambe motema, bazalaki komikomisa kitoko na ndenge wana ; bazalaki kotosa mibali na bango, 6ndenge Sara azalaki kotosa Abraham mpe abengaki ye mokonzi na ye. Bozali bana na ye ya basi soki bosali makambo oyo ezali sembo mpe bobangi eloko moko te.

7Bino mibali mpe, tango bozali kovanda na basi na bino, esengeli boyeba ete bazali batu ya bolembu, mpe bopesaka bango botosi, Pamba te bango mpe bakozwa elongo na bino, bomoi oyo Nzambe akopesa kati na ngolu na ye. Bosalaka bongo mpo ete eloko moko te ekangisa mabondeli na bino.

Kosala bolamu

8Mpo na kosukisa, bino nyonso bozala likanisi moko, boyokanaka mawa moko na moko, bolinganaka lokola bandeko, bozala bato malamu, mpe bozala bato ya komikitisa. 9Bozongisa mabe na mabe te, to kofinga na kofinga, nzokande bopambolaka, Pamba te Nzambe abenga bino mpo na yango, mpo ete bozwa lipamboli. 10Pamba te, Moto oyo alingi bomoi
mpe komona mikolo ya malamu,
esengeli abatela lolemo na ye
na koloba makambo ya mabe,
mpe bambebo na ye na maloba
ya lokuta.

11 Esengeli akima mabe
mpe asala malamu,
esengeli aluka kimia
mpe akoba kolanda yango.

12 Pamba te miso ya Nkolo
ezali likolo ya bato na sembo
mpe matoyi na ye
eyokaka mabondeli na bango ;
kasi elongi ya Nkolo
etalaka te baoyo basalaka mabe.

Kozala ya kobongama mpo na kolobela elikya na yo

13Nani akosala bino mabe, soki bozali na posa monene mpo na kosala malamu ? 14Mpe ata soki esengeli ete bomona pasi mpo na likambo oyo ezali sembo, boyeba ete bozali bato ya esengo. Bobanga bato te, mpe bozala mitema likolo te. 15Kasi bokumisa Kristo kati na mitema na bino lokola Nkolo. Bozala ya kobongama tango nyonso mpo na kopesa eyano na moto nyonso oyo akotuna bino mpo na kolimbola elikya oyo bozali na yango. Kasi bosala yango na boboto mpe na botosi. 16Bobatela mitema na bino peto, mpo ete baoyo balobaka mabe mpo na bizaleli na bino ya malamu kati na Kristo, bakoka koyoka soni mpo na kofinga na bango. 17Pamba te eleki malamu, soki yango ezali mokano ya Nzambe, ete moto amona pasi mpo azali kosala malamu, na esika ete amona pasi mpo azali kosala mabe.

Ndakisa oyo eleki malamu

18Pamba te Kristo akufaki mpo na masumu na biso, mbala moko, mpo na libela, ye moto malamu akufaki mpo na bato mabe, mpo amema bino epai ya Nzambe ; Babomaki ye na nzoto, kasi azalaki na bomoi na nzela ya Molimo.

19Na nzela ya Molimo yango, akendaki mpe ateyaki milimo oyo ezalaki na boloko, 20milimo oyo eboyaki kotosa, kala, tango Nzambe azalaki kozela na kokanga motema, tango Nowa azalaki kotonga masuwa. Mpe kati na yango, mwa bato moke kaka, mwambe, nde babikaki na mayi. 21Mayi wana ezali elembo ya libatisi oyo ezali kobikisa bino sikʼoyo. Yango ezali te mpo na kosukola bosoto ya nzoto, kasi mpo na komipesa epai ya Nzambe na motema ya peto.

Yango ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo,
22ye oyo abuta na Likolo mpe azali na loboko ya mobali ya Nzambe ; mpe baanzelu, bakonzi, mpe banguya ya likolo bazali kotosa ye.
Copyright information for LinMNB