1 Thessalonians 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai polo, Silas mpe Timote, totindi mokanda oyo na Lingomba ya bandeko ya Tesalonika, baoyo bazali kati na Nzambe Tata mpe kati na Nkolo Yesu Kristo.

Tika ete ngolu mpe kimia ezala na bino.

Kondima mpe ndakisa ya bandeko ya Tesalonika

2Tozongisaka matondo tango nyonso epai na Nzambe mpo na bino nyonso, tango totangaka kombo na bino na mabondeli na biso. 3Pamba te, totikaka te kokanisa liboso na Nzambe Tata na biso, ndenge kondima na bino ezali kosala, mosala ya bolingo na bino, kokanga motema na bino oyo ezali kowuta na elikya ya makasi kati na Nkolo na biso Yesu Kristo.

4Bandeko balingami na Nzambe, toyebi ete Nzambe apona bino, 5pamba te Sango Malamu na biso ekomaki epai na bino na malobakaka te, kasi ekomaki mpe na nguya elongo na Molimo Mosantu, mpe na elikya monene.

Boyebi ezaleli oyo tozalaki na yango kati na bino ; yango ezalaki mpo na bolamu na bino.
6Mpe, bokomaki bamekoli
bamekoli  : imitateurs.
na biso mpe ya Nkolo, pamba teboyambaki Liloba na kati ya minyoko mingi, elongo na esengo oyo ewutaki na Molimo Mosantu ;
7bokoma ndakisa epai ya bandimi nyonso na Masedwane mpe na Akayi.

8Pamba te, Liloba ya Nkolo eyokanaki wuta epai na bino kaka na Masedwane mpe Akayi te ; kasi sango ya kondima na bino kati na Nzambe esiʼeyebani na bisika nyonso. Yango wana, tozali lisusu na tina te ya koloba ata likambo moko mpo na yango, 9pamba te bango moko bazali koloba ete boyambaki biso malamu penza. Bazali mpe koyebisa ndenge boboyaki bikeko mpe botalaki Nzambe, mpo na kosalela Nzambe ya bomoi mpe ya solo, 10mpe mpo na kozela wuta na Likolo Mwana na ye oyo asekwisaki kati na bakufi, Yesu, oyo azali kokangola biso na kanda oyo ezali koya.
Copyright information for LinMNB