1 Thessalonians 5

1Kasi mpo na oyo etali tango to mokolo, bandeko, tomoni ete ezali natina te mpo na kokomela bino : 2pamba te, boyebi malamu ete Mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi na kati ya butu.

3Tango bato bakoloba : “Sikʼoyo tozali na kimia mpe tovandi nyee !”, bongo libebi ya mbalakaka ekokweyela bango, lokola bapasi ya mwasi oyo azali na zemi, mpe bakokoka kokima te.

4Kasi bino, bandeko, bozali na kati ya molili te, mpo ete Mokolo yango ekanga bino na mbalakaka lokola moyibi. 5Pamba te, bino nyonso bozali bana ya mwinda mpe bana ya moi. Tozali bato ya butu te to mpe ya molili te. 6Yango wana, tolala pongi te lokola bato mosusu, kasi tokengela mpe tomibatela malamu.

7Pamba te, baoyo balalaka pongi, balalaka na butu ; mpe baoyo balangwaka masanga, balangwaka na butu. 8Kasi biso baoyo tozali bato ya moi, tomibatela malamu : tolata kondima mpe bolingo lokola kazaka ya ebende, mpe elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende. 9Pamba te, Nzambe abongisa biso mpo kanda na ye ekweyela biso te, kasi mpo tozua lobiko na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo, 10oyo akufaki mpo na biso, mpo ete, atako tozali na bomoi, to mpe tokufi, tokoka kozala na bomoi lisanga elongo na ye. 11Yango wana, bolendisana moko na moko, mpe bosungana moko na moko, ndenge bosalaka yango.

12Bandeko, tosengi bino botosaka baoyo basalaka mosala ya makasi kati na bino, baoyo bakambaka bino kati na Nkolo, mpe bapesaka bino makebisi. 13Botosa bango mingi penza mpe bolingaka bango, mpo na mosala oyo bazali kosala. Bozala na kimia kati na bino.

14Bandeko, tozali kolendisa bino ete : bokebisa bato ya goigoi, baoyo basiʼbalembi na mitema, bosalisaka bato ya bolembu, mpe bokangaka mitema liboso ya bato nyonso. 15Bokeba, ete moto moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tang nyonso makambo ya malamu, kati na bino, mpe epai ya bato nyonso.

16Bosepelaka tango nyonso. 17Bobondelaka na kotika te. 18Bozongisaka matondi na makambo nyonso, pamba te mokano ya Nzambe ezali bongo kati na Kristo Yesu, mpo nabino.

19Boboma mosala ya Molimo te : 20botiolaka te maloba oyo esakolamaka ; 21nzokande botala malamu-malamu makambo nyonso soki ezali ya solo to te, mpe bondima oyo ezali ya malamu. 22Boboya lolenge nyonso ya mabe.

Libondeli mpe bambote

23Tika ete Nzambe ya kimia apetola bino na lolenge nyonso. Tikaete molimo na bino, motema na bino, mpe nzoto na bino mobimba ebatelama malamu, ete ezala na mabe te na mokolo Nkolo na biso Yesu Kristo akoya. 24Ye oyo abenga bino azali sembo, ye mpe moto akosala yango.

25Bandeko, bobondelaka mpo na biso.

26Bopesa mbote na bandeko nyonso na besi ya bosantu.

27Nabondeli bino na kombo ya Nkolo, ete botangela bandeko nyonsomokanda oyo.

28Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino.
Copyright information for LinMNB