1 Timothy 3

Bakambi kati na lingomba mpe balandi na bango

1Liloba oyo ezali ya solo : “Soki moto alingi kokoma mokengeli, aponi mosala moko ya malamu.” 2Mokengeli asengeli kozala na likambo ata moko te ya mabe, asengeli kozala mobali ya mwasi moko kaka, moto ya lokoso te, moto oyo ayebi komibatela malamu, moto oyo bato basengeli kotosa, moto oyo ayambaka bapaya malamu, moto oyo ayebi koteya, 3moto oyo alangwaka masanga te, moto oyo atombokaka te, kasi moto ya boboto, moto oyo aswanaka te, moto ya lokoso ya mbongo te, 4moto oyo ayebi kokamba libota na ye malamu, mpe atalaka malamu soki bana na ye batambolaka na botosi penza.

5Pamba te, soki moto ayebi kokamba libota na ye moko te, bongo ndenge nini akokoka kobatela Lingomba ya Nzambe ? 6Esengeli azala te moto oyo awuti kobongola motema sika, soki te, akotonda na lofundu, mpe akozwa etumbu lokola oyo Zabolo azwaki. 7Esengeli azala na litatoli ya malamu liboso ya bato oyo bazali bandimite, mpo ete akweya kati na soni te mpe kati na motambu ya Zabolo te.

8Badiakono mpe ndenge moko, esengeli bazala bato oyo bakoki mpo na kozua botosi, bazala bato ya maloba mibale te, bazali bato oyo bamelaka masanga mingi te, mpe bato oyo batonda na lokoso ya kozwalitomba ya soni te. 9Esengeli bayeba kobatela sekele ya kondima kati na makanisi ya peto. 10Esengeli bameka bango liboso ; bongo soki bamoni bango na mabete, wana nde bakoki kosala lokola badiakono.

11Ndenge moko mpe mpo na basi na bango, esengeli bazala basi oyo bakoki mpo na kozua botosi, batongaka bato te, bazala na lokoso te, mpe bazala sembo na makambo nyonso.

12Diakono esengeli azala mobali ya mwasi moko kaka, ayeba kokambabana na ye mpe ndako na ye malamu. 13Pamba te, badiakono oyo basalaka mosala na bango malamu, bazwaka lokumu mpe elikya monene kati na kondima na bango oyo ezali kati na Kristo Yesu.

Sekele emonani

14Atako nazali na elikya ya koya epai na yo noki penza, kasi nakomeli yo mitindo oyo, 15mpo ete soki naye noki te, okoka koyeba soki ezaleli ya ndengenini esengeli kozala na yango kati na ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe ya bomoi likunzi, mpe fondasio ya makambo ya solo. 16Ya solo, sekele ya kotosa makambo ya Nzambe ezali monene : Nzambe amonanaki na nzoto ya bomoto,
akomaki sembo na nzela ya Molimo,
baanzelu bamonaki ye,
bateyaki sango na ye kati na bato oyo bazali Bayuda te,
bandimaki ye kati na mokili,
mpe amemamaki kati na nkembo.
Copyright information for LinMNB