1 Timothy 6

Bawumbu mpe bakonzi

1Baoyo nyonso bazali komema mokumba ya bowumbu esengeli bamonabakonzi na bango ete bazali ya kokoka mpo na kozwa lokumu nyonso, mpo ete moto moko te afinga kombo ya Nzambe mpe mateya oyo toteyaka. 2Baoyo bakonzi na bango bazali bandimi, batiola bango te mpo bazali bandeko na bango. Nzokande, basalela bango na malamu penza, pamba te baoyo bazali kozua litomba na mosala na bango bazali bandimi mpe bandeko na bango ya bolingo.

Mateya ya lokuta na oyo ya solo

Tala, makambo oyo, osengeli koteya mpe kotinda bango.
3Soki moto ateyi mateya mosusu, mpe alandi te maloba ya solo oyo Nkolo na biso Yesu Kristo, mpe mateya oyo ezali koloba mpo na botosi ya makambo ya Nzambe, 4azali moto oyo atonda na lofundu, ayebi eloko moko te, azali na maladi ya kotuna-tuna mituna mpe ya kotiaka tembe mpo na maloba ; yango ebotaka zuwa, koswana, maloba ya kofinga, kokanisela baningamakambo ya mabe, 5mpe kotiana tembe ya pamba-pamba ya bato oyo babeba kati na makanisi na bango mpe bazangi makambo ya solo, baoyo bakanisaka etekotosa makambo ya Nzambe ezali nzela oyo epesaka litomba ya mosolo.

6Nzokande, kotosa makambo ya Nzambe mpe kosepela na biloko oyoozali na yango, ezali penza litomba monene. 7Pamba te, toyaki na eloko moko te na mokili, mpe tokoka komema ata eloko moko te. 8Kasi soki tozali na biloko ya kolia mpe na elamba ya kolata, tokosepelampo na yango.

9Nzokande bato oyo balingaka kokoma bato ya bomengobakweyaka kati na komekama, kati na motambo, mpe kati na baposa mingi ya bozoba mpe oyo ememaka pasi, oyo edindisaka bato kati na kufa mpe mabe. 10Pamba te, “bolingo ya mbongo, yango nde ezali ebandeli ya mabenyonso.” Bato mosusu bawelelaki kozala na mbongo, babungisa kondimana bango mpe bamiyokisa bango moko bapasi mingi.

Kobunda etumba malamu ya kondima

11Kasi yo, moto ya Nzambe, kima makambo nyonso wana, mpe lukabosembo, kotosa makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, kokanga motema mpe boboto. 12Bunda etumba malamu ya kondima, simba bomoi ya seko oyo Nzambe abengelaki yo, tango osalaki koyambola ya kitoko liboso ya batemwe ebele.

13Liboso ya Nzambe, oyo apesaka bomoi na biloko nyonso, mpe libosoya Kristo Yesu oyo asalaki koyambola ya kitoko liboso ya Ponse Pilato, napesi yo mokumba oyo : 14batela mibeko oyo, ezwa mbindo te mpe mabe te, kino Mokolo Nkolo na biso Yesu Kristo akomonana, ye 15oyo Nzambe akomonisa na tango na ye oyo asiʼatia : Ye oyo azali moto ya esengo,
mokonzi kaka moko,
Mokonzi ya bakonzi mpe
Nkolo ya bakolo.
Kaka ye moko nde akufaka te.

16 Avandaka na kati ya
moi oyo moto moko te
azali na makoki
mpo na kotala,
epai moto ata moko te
asiʼamona,
to mpe akoki komona.
Tika ete lukumu mpe makasi ya seko na seko
ezala na ye !
Amen.

Na bato ya bomengo

17Pesa etinda oyo na bato oyo bazali bato ya bomengo na mokilioyo, ete bazala bato ya lofundu te mpe batia motema na bango te na bomengo oyo ezangi elikya, kasi batia motema na bango na Nzambe, oyoapesaka biso biloko nyonso na mingi penza, mpo ete tosepela na yango. 18Tindaka bango basalaka makambo ya malamu, bazala bato ya bomengona misala ya malamu, bakabelaka bato, mpe basepelaka kokabola biloko na bango na bato mosusu. 19Na ndenge wana, bakomibombela bango moko bomengo oyo : fondasio ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bazwa bomoi ya solo.

Mitindo ya suka mpe mbote

20Ee Timote, batela malamu oyo bapesa yo. Boya masolo yapamba-pamba na oyo etelemelaka makambo ya kosambela, mpe tembe ya oyo babengaka na lokuta, ete ezali “Boyebi”, 21oyo bato mosusu basiʼbandima yango, mpe balongwa na nzela ya kondima.

Tika ete ngolu ezala na yo !
Copyright information for LinMNB