2 Corinthians 11

Polo na bantoma ya lokuta

1Bandeko, nabondeli bino ete bokanga nanu mitema mpo na oyo emonani lokola bozoba na ngai. Solo, bokanga mitema mpo na ngai ! 2Nazali na zuwa mpo na bino, zuwa oyo ewuti na Nzambe. Pamba te, nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. 3Nzoka nde, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe ebungisa bino nzela ya bolingo ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe. 4Pamba te, soki moto ayei koteya bino Yesu mosusu oyo biso toteyaki bino te, bondimaka ye. Bondimaka mpe kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo bozwaki, to mpe Sango Malamu oyo ekeseni na oyo bondimelaki. 5Nzoka nde, nazali kokanisa te ete nazali moke na miso ya bantoma oyo bamimonaka ete bazali minene. 6Pamba te, ata soki namonani lokola moto oyo ayebi koloba malamu te, kasi nazali na boyebi ; mpe tolakisaki bino yango polele na ndenge nyonso mpe na makambo nyonso.

7Boni, nasalaki mabe ndenge namikitisaki mpo ete bino bomata wana nateyaki bino Sango Malamu ya Nkolo ? 8Nasilisaki bomengo ya mangomba misusu wana nazalaki kozwa lifuti epai na bango mpo kosunga bino. 9Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te, bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na posa. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te, mpe nakomibatela kaka mpo na likambo yango. 10Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango. 11Mpo na nini bongo ? Mpo nalingaka bino te ? Nzambe ayebi ete nalingaka bino !

12Boye, nakokoba kaka kosala oyo nazali kosala, mpo na kokanga nzela na bato oyo bazali koluka nzela ya komikokanisa na biso na makambo oyo bazali komikumisa na yango. 13Pamba te, bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi bato mpe bamikomisaka lokola bantoma ya Klisto. 14Yango ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana ye moko mpe amikomisaka lokola anjelu ya pole. 15Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya sembo. Suka na bango ekozala kolanda misala na bango.

Polo na basakoli ya lokuta

16Nazongeli lisusu : moto moko te azwa ngai lokola moto ya liboma, to soki bolingi bongo, bondima ngai lokola moto ya liboma mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke. 17Makambo oyo nalingi koloba, nakoloba yango te ndenge Nkolo alingi, kasi nakoloba yango lokola moto ya liboma, mpe nazali na elikya ete nakozwa nzela ya komikumisa. 18Lokola bato mingi bazali komikumisa na makambo ya mosuni, ngai mpe nakomikumisa. 19Pamba te, bondimaka na esengo nyonso bato ya maboma atako bozali bato ya bwanya. 20Bondimaka ete bato bakomisa bino bawumbu, babotola bozwi na bino, banyokola bino, bamonela bino, babeta bino na elongi. 21Nazali koloba yango na soni, ete tozalaki penza babolele mpo na komitika bongo. Nzoka nde, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na yango, (nazali koloba lokola moto ya liboma), ngai mpe nakoki komikumisa na yango. 22Bazali baebreo ? Ngai mpe nazali moebreo. Bazali bato ya Isalaele ? Ngai mpe nazali moto ya Isalaele ! Bazali bakitani ya Abrayami ? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami. 23Bazali basali ya Klisto ? (Nazali koloba lokola moto ya liboma) ; ngai naleki bango. Pamba te, nasalaki mosala ya makasi penza, nakotaki na boloko mbala mingi, babetaki ngai mingi penza, nakutanaki na makama ya liwa mbala mingi. 24Mbala mitano, bayuda babetaki ngai bafimbo tuku misato na libwa ; 25mbala misato, babetaki ngai banzete ; mbala moko, babambaki ngai mabanga ; mbala misato, nazindaki na mayi ; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene. 26Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo ; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya bato ya bikolo ya bapaya, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta. 27Solo nasalaki misala ya makasi mpe ya pasi penza ; mbala mingi, nazalaki kolala pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nazalaki kokila bilei, nanyokwamaki na malili mpe nazangaki bilamba ya kolata ; 28kotanga te makambo nyonso oyo etikali, mokumba na ngai ya mokolo na mokolo : komitungisa na ngai mpo na mangomba nyonso. 29Pamba te, nani oyo akomi na bolembu, bongo ngai nalemba nzoto te ? Nani oyo akweyi na masumu, bongo ngai nayoka motema pasi te ? 30Soki esengeli na ngai komikumisa, nakomikumisa na bolembu na ngai. 31Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yesu, Ye oyo azali ya kopambolama libela na libela, ayebi ete nazali kokosa te. 32Na Damasi, moyangeli ya mokonzi Aretasi apesaki mitindo ete bakengela engumba ya bato ya Damasi mpo ete bakanga ngai. 33Kasi babimisaki ngai na lidusu ya lopango ya engumba, mpe basalelaki kitunga mpo na kokitisa ngai na miri ; bongo nakimaki ye.
Copyright information for LinMNB