2 Corinthians 12

Bimoniseli ya Polo

1Boni, esengeli namikumisa ? Te, ezali na tina te ! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai. 2Nayebi moto moko
Polo azali koloba na tina na ye moko lokola na tina na moto mosusu mpo ete abenda makanisi ya bato likolo na ye te
kati na Klisto, oyo eleki mibu zomi na minei, bamemaki ye kino na likolo ya misato : nayebi te soki ezalaki na nzoto na ye, to na nzoto na ye te, kasi Nzambe nde ayebi yango.
3Nzoka nde, ezala soki ezalaki na nzoto na ye to mpe na nzoto na ye te, Nzambe nde ayebi yango. Kasi ngai nayebi kaka ete moto yango, 4bamemaki ye na paradizo ; mpe ayokaki makambo oyo moto akoki kolimbola te, makambo oyo moto azali na ndingisa te ya koloba. 5Nakomikumisa solo na tina na moto ya ndenge wana, kasi na tina na ngai moko te, longola kaka na tina na bolembu na ngai. 6Nzoka nde, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala moto ya zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo ; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai. 7Bongo, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai. 8Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato, mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai. 9Kasi Ye azongiselaki ngai : “Ngolu na ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na ngai ekokisamaka kati na bolembu.” Yango wana, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai. 10Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko, to mpe na bapasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.

Mitungisi ya Polo mpo na bandeko ya Korinto

11Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te ezali nde bino bato botindiki ngai kosala bongo. Pamba te, ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te. 12Bilembo oyo elakisaka ete nazali ntoma emonisamaki kati na bino : koyika mpiko kati na mimekano nyonso, bilembo ya kokamwa mpe bikamwisi. 13Eloko nini penza bino bozwaki te koleka mangomba misusu longola kaka komemisa bino te mikumba na ngai ? Boye, bolimbisa ngai mpo na mabe yango !

14Sikʼoyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato ; mpe nakomemisa bino mikumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Ezali likambo ya bana te kobomba biloko mpo na baboti na bango, kasi baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango. 15Mpo na ngai, nakopesa na esengo biloko na ngai nyonso, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki solo kolinga ngai mingi te ?

16Atako nazalaki mokumba te epai na bino, kasi bato mosusu bazalaki koloba ete nazali moto ya mayele mabe, natielaki bino motambo. 17Boni, kati na bato oyo natindaki epai na bino : ezali na moko oyo natindaki mpo na kozwa bino biloko na mayele mabe ? 18Nasengaki na Tito ete aya epai na bino mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe ? Tozalaki na ye likanisi moko te ? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te ? 19Bokanisi ete wuta kala biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso, balingami na ngai, mpo na kokolisa kondima na bino. 20Pamba te, nazali kobanga ete tango nakoya epai na bino, nakuta bino te ndenge ngai nazali kolinga ete bozala, mpe bino bomona ngai te ndenge bino bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino : koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu. 21Solo, nazali kobanga lisusu ete tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, kindumba mpe ekobo oyo basalaka.
Copyright information for LinMNB