2 Corinthians 3

Basali ya boyokani ya sika

1Boni, tokomi lisusu komikumisa biso moko ? To tozali lisusu na posa, lokola bato mosusu, ya mikanda ya matatoli mpo na kopesa bino to kowuta epai na bino ? 2Bino bozali mokanda na biso, mokanda oyo ekomama kati na mitema na biso : bato nyonso bayebi yango mpe batangaka yango. 3Solo, bozali mokanda ya Klisto na nzela ya lotomo oyo apesaki biso. Mokanda yango ekomamaki na mayi ya ekomeli te, kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe ya bomoi ; likolo ya bitando ya mabanga te, kasi, kati na mitema ya bato.

4Oyo nde elikya tozali na yango na Nzambe na nzela ya Klisto. 5Yango elingi koloba te ete tokoki kosala mosala oyo na makoki na biso moko, nzoka nde makoki na biso ewutaka na Nzambe. 6Ye nde apesaka biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya Sika, oyo evandisami na Mibeko te, kasi na Molimo. Pamba te, Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.

7Nzoka nde, soki lotomo oyo ezalaki komema kufa ekomamaki likolo ya bitando ya mabanga, ezalaki na nkembo monene, na ndenge ete bato ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize mpo na nkembo ya elongi na ye, nkembo oyo esengelaki kosila, 8ndenge nini lotomo ya Molimo eleka na nkembo te ? 9Pamba te, soki lotomo oyo epesaka etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo ememaka bosembo etonda na nkembo te ? 10Tokoki solo koloba ete nkembo ya kala ebungisa kongenga na yango liboso ya nkembo ya sika oyo eleki penza monene. 11Pamba te, soki oyo esengelaki kosila ezalaki na nkembo, ndenge nini nkembo oyo ekowumela seko na seko ekoleka monene te ?

12Awa tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na kobanga te. 13Kasi biso tozali lokola Moyize te, oyo azalaki kozipa elamba na elongi na ye, mpo ete bato ya Isalaele bamona te suka ya nkembo oyo esengelaki kosila. 14Kasi mayele na bango ezali mokuse mpo na kososola. Pamba te, kino lelo tango batangaka Boyokani ya Kala, elamba yango ezali kaka kozipa bango ; elongwe nanu kati na bango te, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto. 15Solo, kino lelo, tango batangaka Mikanda ya Moyize, elamba yango ezipaka kaka mitema na bango. 16Kasi elamba yango elongwaka kaka soki moto andimeli Nkolo. 17Nzoka nde, Nkolo azali Molimo, mpe epai Molimo ya Nkolo azali, bonsomi mpe ezali wana. 18Mpe biso nyonso, baoyo bilongi na biso ezipama te, tozali komonisa nkembo ya Nkolo, tozwa elilingi na Ye, oyo kongenga na yango ebakisamaka tango na tango. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo, oyo azali Molimo.
Copyright information for LinMNB