2 Corinthians 8

MAKABO MPO NA BAKLISTO YA YELUSALEMI

Ndakisa ya mangomba ya Masedwane

1Bandeko, tolingi koyebisa bino ndenge nini Nzambe atalisaki ngolu na Ye na mangomba ya Masedwane. 2Atako bazalaki na mikakatano ya ndenge na ndenge, kasi batondisamaki na esengo oyo eleka ndelo, mpe kati na bobola na bango ya makasi, bapesaki makabo mingi koleka. 3Pamba te, nazali kotatola ete, bapesaki kolanda bozwi na bango, mpe kutu bapesaki koleka makoki na bango, bapesaki yango na kotindika te. 4Mpe babondelaki biso na molende nyonso ete tosala bango ngolu ete bango mpe batinda elongo na biso, lisungi na bango mpo na bolamu ya basantu. 5Mpe basalaki koleka ata ndenge biso tokanisaki : bamipesaki liboso bango moko epai ya Nkolo, mpe epai na biso, kolanda mokano na Nzambe.

6Yango wana, tosengaki na Tito ete, ndenge abandaki mosala yango kati na bino, akomisa yango mpe kino na suka. 7Kasi lokola bozali makasi na makambo nyonso : na kondima, na koyeba koloba, na boyebi, na molende na makambo nyonso mpe na bolingo epai na biso, bozala mpe makasi na likabo ya kokaba.

8Nazali kopesa bino mitindo te, kasi wana nazali kotanga ndakisa ya bato mosusu, ezali mpo na kotala soki bolingo na bino ezali ya solo. 9Pamba te, boyebi ngolu ya Nkolo na biso Yesu Klisto : Ye oyo azalaki mozwi, andimaki kozala lokola mobola mpo na bino, mpo ete na nzela ya bobola na Ye, bino bokoma bazwi.

10Na tina ya likambo ya kopesa, tala likanisi na ngai : yango ezali malamu mingi mpo na bino baoyo, na mobu oyo eleki bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kopesa te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosala yango. 11Sikʼoyo, bosilisa mosala yango kolanda makoki na bino. Molende oyo bozalaki na yango mpo na kolinga kosala, bomonisa yango mpe na kokokisa mosala yango. 12Pamba te, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azangi. 13Posa na biso ezali te ete bino bomona pasi mpo ete bato mosusu bazala na esengo, kasi ezali ete bokokana. 14Mpo na tango oyo, awa bozali na bomengo, bokoki mpe kosunga baoyo bazangi. Bongo, mokolo oyo bino bokozanga, mpe bango bakozala na bomengo, bakoka kosunga bino. Na ndenge wana nde bokokokana, 15lokola ekomama :

“Moto oyo alokotaki mingi azalaki na yango mingi te, mpe moto oyo alokotaki moke azangaki eloko te.”

Tito elongo na baninga na ye

16Natondi Nzambe oyo atie kati na motema ya Tito bolingo oyo eleka ndelo mpo na bino ndenge biso tozali na yango mpo na bino. 17Tito andimaki bosenga na biso, kasi lokola atondaki na posa makasi, akendaki ye moko epai na bino. 18Totindi elongo na ye, ndeko oyo mangomba nyonso ekumisaka mpo na Sango Malamu. 19Lisusu, mangomba nde eponaki ye mpo ete azala moninga na biso ya mobembo kati na mosala oyo ya ngolu, mosala oyo tozali kosala mpo na nkembo ya Nkolo Ye moko, mpe mpo na kolakisa esengo na biso ya kosunga bino. 20Tozali kosala nyonso mpo ete moto ata moko te atonga biso mpo na ebele ya makabo oyo biso tozwi mokumba ya kokongola. 21Pamba te, tosalaka nyonso ete tomonana sembo kaka miso ya Nkolo te, kasi mpe, na miso ya bato.

22Totindi elongo na bango, ndeko na biso, oyo biso tondimaka, mbala na mbala, bolingo na ye oyo eleka ndelo, mpe sikʼoyo azali komonisa yango lisusu koleka, mpo ete azali kotiela bino mingi motema. 23Tito azali molingami na ngai mpe moninga na ngai ya mosala epai na bino ; bongo mpo na bandeko na biso, bango bazali batindami ya mangomba mpe nkembo ya Klisto. 24Yango wana, bolakisa bango ete bolingi bango na solo, mpo ete mangomba endima mpe eyeba ete tobetaka tolo mpo na bino na pamba te.
Copyright information for LinMNB