2 Corinthians 9

1Ezali na tina te ete nakomela bino mokanda na tina ya lisungi mpo na basantu. 2Pamba te, nayebi ndenge nini mitema na bino ezalaka na esengo ya kosunga, mpe nabetaki tolo mpo na yango epai ya bato ya Masedwane. Nayebisaki bango ete, wuta mobu oyo eleki, bino na Akayi bosilaki komibongisa, mpe esengo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga. 3Natindeli bino bandeko wana, mpo ete tolo oyo nabetaka mpo na bino emonana pamba te na likambo wana, kasi bozala ya komibongisa, ndenge nayebisaki bino yango. 4Pamba te, soki ndambo ya bato ya Masedwane bayei elongo na ngai, mpe bakuti ete nanu bomibongisi te ; solo, tokoyoka soni mingi mpo na motema oyo totiaka epai na bino. Ekozala soni na bino te, kasi soni na biso. 5Yango wana, namonaki ete ezalaki malamu ya kosenga na bandeko wana ete baya epai na bino liboso na ngai, mpo na kabongisa makabo oyo bolakaki. Bongo, yango ekozala ya kobongama tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo, kasi tozwi yango na makasi te.

6Boyeba likambo oyo : Moto oyo alonaka moke,
abukaka mpe moke ;
oyo alonaka ebele,
abukaka mpe ebele !

7Tika ete moto na moto apesa ndenge akati na motema na ye, na mawa te, mpe na kotindika te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo. 8Nzambe azali na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya lolenge nyonso, mpo ete na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozwa biloko oyo bozali na yango posa, mpe bozala lisusu na oyo bokosala na yango misala nyonso ya malamu, ndenge ekomama :

9“Akabolaki, apesaki epai ya babola, bosembo na ye ekowumela libela na libela.”

10Nzoka nde, Ye oyo apesaka milona na moloni mpe lipa ya kolia, akopesa bino mpe bambuma ; akokomisa yango ebele mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino.

11Bongo, bokokoma bazwi na nyonso, mpo ete tango nyonso bokoka kokabela bato mosusu. Boye na nzela na biso, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe. 12Pamba te, makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe. 13Tango bakomona penza tina ya mosala na bino, bakokumisa Nzambe mpo na botosi oyo bozali kolakisa mpo na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na ndenge bokopesa makabo na bino epai na bango, mpe epai ya bato nyonso. 14Mpe na mabondeli na bango mpo na bino, bakolakisa bino bolingo na bango mpo na ngolu monene oyo Nzambe asaleli bino. 15Matondi na Nzambe mpo na likabo na Ye oyo mayele ya bato ekolonga kolimbola te.
Copyright information for LinMNB