2 Peter 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Simon Piere, mosali mpe mopostolo ya Yesu Kristo, natindimokanda oyo epai ya baoyo bazwaki kondima ya motuya, lolenge moko na biso, na nzela ya bosembo ya Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo.

2Tika ete ngolu mpe kimia ezala na bino ya mingi penza, na nzela ya koyeba Nzambe mpe Yesu Nkolo na biso.

Ebiangeli ya Nzambe mpe misala na yango

3Nguya ya bonzambe ya Nzambe esiʼepesa biso biloko nyonso oyo tozali na yango posa mpo na bomoi mpe mpo na kotosa makambo ya Nzambe, na nzela ya koyeba ye oyo abenga biso na nkembo na ye mpe bolamu na ye. 4Na nzela wana nde, apesa biso bilaka ya minene penza mpe ya motuyamingi, mpo ete na nzela na yango bokoka kosangana kati na bomoto ya Nzambe mpe bokima libebi oyo ezali na mokili, oyo ezali kowuta na baposa ya mabe.

5Mpo na tina wana, bosala makasi mpo na kobakisa likolo ya kondima na bino, bolamu ; mpe likolo ya bolamu, boyebi ; 6likolo ya boyebi, komibatela malamu ; mpe likolo ya komibatela malamu, kokanga motema ; mpe likolo ya kokanga motema, kotosa makambo ya Nzambe ; 7mpe likolo ya kotosa makambo ya Nzambe, bondeko ya solo ; mpe likolo ya bondeko ya solo, bolingo.

8Pamba te, soki makambo oyo ezali kati na bino mpe ezali tangonyonso kobakisama, yango ekobatela bino mpo bozala te bato oyo basalaka eloko moko te mpe baoyo babotaka mbuma te, mpo na oyo etali boyebi ya nkolo na biso Yesu Kristo. 9Kasi soki moto azangi makambo wana, azali mokufi miso mpe amonaka mosika te, mpe asiʼabosani ete basiʼbasukola ye na masumu na ye ya kala.

10Yango wana bandeko na ngai, bozala na posa mingi mpo na kolendisa kobengama na bino mpe koponama na bino. Pamba te, sokibosali makambo wana, bokokweya te, 11mpe bakoyamba bino malamu penza kati na Bokonzi ya seko ya Nkolona biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.

Mateya oyo ezali kotambola na nzela ya solo

12Yango wana, nakobanda tango nyonso kokanisela bino makambo yango, atako boyebi yango mpe bozali ya kokangama makasi kati na makambo ya solo oyo bozali na yango sikʼoyo.

13Nakanisi ete ezali malamu mpo nalamusaka makanisi na bino awa nazali naino na bomoi na kati ya ndako ya kapo ya nzoto oyo. 14Pamba te, nayebi ete etikali moke nalongola yango, ndenge Nkolo na biso Yesu Kristo alakisi ngai yango polele. 15Mpe nakosala makasi, mpo ete ata sima ya kokufa na ngai, bozala tango nyonso na makoki ya kokanisaka makambo yango.

16Tango toyebisaki bino makambo oyo etali nguya mpe koya ya Nkolona biso Yesu Kristo, tolandaki masapo ya mayele mabe te oyo esalama na bato, kasi tozalaki penza batemwe oyo bamonaki nkembo na ye. 17Pamba te, tozalaki wana tango azwaki lokumu mpe nkembo oyo ewutaki na Nzambe Tata, tango mongongo eyaki epai na ye wuta na Nkembo monene ya Nzambe, mpe elobaki : Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo ; nasepelaka na ye mingi penza. 18Mpe biso moko toyokaki mongongo yango oyo ewutaki na Likolo, tango tozalaki elongo na ye, likolo ya ngomba mosantu.

19Yango wana, tozali na elikya mingi na maloba oyo baprofeta basakola, mpe bokosala malamu mpo na kotia makanisi na bino na yango : Pamba te, yango ezali lokola mwinda oyo ezali kopela kati na esikaya molili, kino tango tongo ekobanda kotana mpe monzoto ya tongo ekongenga kati na mitema na bino.

20Liboso ya nyonso, esengeli boyeba ete moto moko te akoki kolimbola maloba ya baprofeta, oyo ezali kati na Makomi, na mayele na ye moko. 21Pamba te, maloba ya baprofeta eyaki na mokano ya moto te ; kasi Molimo Mosantu nde atambusaki basantu ya Nzambe mpo na kosakola.
Copyright information for LinMNB