2 Peter 2

Bateyi ya lokuta

1Kala, bateyi ya lokuta bazalaki na kati ya bato ya Isayele ; ndenge moko mpe mpo na bino, bateyi ya lokuta bakozala na kati na bino. Bakokotisa na kobombama mateya oyo ememaka na libebi, bakowangana ata Mokonzi oyo asombaki bango ; mpe na ndenge wana, bakomibendela bango moko libebi ya mbalakata. 2Bato mingi bakolanda nzela na bango ya libebi, mpe bato bakotiolanzela ya makambo ya solo mpo na makambo bango basalaka. 3Kati na lokoso na bango ya mbongo, bateyi wana ya lokuta bakozwa biloko na bino na mayele ya mabe, na nzela ya masapo oyo bango moko bakosala. Kasi etumbu na bango ekowumela te mpo na kokweya likolo na bango, mpe kobeba na bango ezali kozela bango. 4Pamba te, Nzambe ayokelaki baanzelu oyo basalaki masumu mawa te, kasi abwakaki bango na libulu ya molayi penza, epai bazali kokengela bango na boloko, na kati ya molili, mpo bazela Mokolo ya kosambisama. 5Ayokelaki mpe mokili ya kala mawa te ; akitisaki mpela likoloya bato na yango oyo bazalaki kotosa makambo na ye te. Kasi abatelaki kaka Nowaoyo azalaki koteya bosembo, mpe bato sambo mosusu elongo na ye. 6Nzambe apesaki ba-vile ya Sodomo mpe Gomore etumbu, na nzela ya kozikisa yango kino ekomaki putulu, mpe akomisa yango ndakisa epai ya bato oyo bakoboya kotosa makambo na ye. 7Kasi abikisaki Loti moto na sembo, ye oyo ayokaki mawa mpo na ezaleli ya mabe ya bato wana ya mobulu. 8(Pamba te Moto na sembo oyo, azalaki kovanda na kati na bango, mpe mokolo na mokolo, azalaki komitungisa mingi na kati ya motema na ye ya sembo, tango azalaki komona mpe koyoka misala na bango ya mabe). 9Ya solo, Nkolo ayebi ndenge akoki kokangola kati na komekama bato oyo batosaka makambo na ye, mpe ndenge akoki kobomba baoyo bazali kosala mabe, na nse ya etumbu, kino na mokolo ya kosambisama. 10Kasi akopesa etumbu ya koleka epai ya baoyo bazali kolanda baposa ya mabe ya nzoto, mpe bazali kotiola bokonzi ya Nzambe.

Bazali bato ya mitu makasi mpe bato ya lofundu, babangaka te kofinga bikelamo ya Likolo.
11Nzokande ata baanzelu, bango oyo bazali na makasi mingi mpe nanguya mingi, bafundaka bango te liboso ya Nkolo na maloba ya kofinga. 12Kasi bato wana bafingaka makambo bango basosolaka te. Bazali lokola banyama oyo ezangi mayele, babotama kaka mpo bakanga bango mpe baboma bango ; mpe bakokufa lokola banyama. 13Bakozwa lifuti mpo na mabe oyo bazali kosala. Bato yango basepelakamingi penza kosala makambo ya mabe na miso ya bato. Bazali bato ya mbindompe ya bosoto, mpe basepelaka kokosa bino tango basanganaka na bino na bafeti.

14Miso na bango etonda na ekobo mpe batikaka te kosala masumu. Bakangaka na motambo bato oyo balendisama malamu te ; mitema na bango etonda na lokoso ya mbongo, mpe bazali na nse ya elakeli mabe ya Nzambe. 15Basiʼbatika nzela ya malamu mpe bamibungisa mpo na kolanda nzela ya Balami mwana ya Beor, oyo alingaki lifuti ya masumu. 16Kasi Nzambe apamelaki ye na nzela ya mpunda mpo na mabe oyo asalaki ; nyama oyo elobaka te, elobaki na mongongo ya moto mpe ekangisaka bozoba ya moprofeta.

17Bato yango bazali lokola maziba oyo ebimisaka mayi te mpe lokola mapata oyo mopepe ya makasi ezali kotindika. Nzambe abombela bango esika kati na molili ya makasi penza. 18Pamba te, tango balobaka, balobaka maloba ya lofundu mpe ezangi tina. Basalelaka baposamabe ya nzoto lokola mwa mosuni ya nyama oyo batiaka na motambo, mpo na kokanga bato oyobabandi kokima bato oyo bazali na kati ya libunga. 19Bapesaka bango elaka ya kozwa bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa oyo ememaka bango na libebi ; Pamba te moto nyonso azali mowumbu ya eloko oyo esila kolonga ye.

20Soki bato balongwe na kati ya makambo ya bosoto ya mokili, na nzela ya koyeba Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo, mpe bamitiki lisusu ete makambo yango ya bosoto ekanga bango mpe elonga bango, boyeba ete lolenge na bango ya suka ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso. 21Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango ete bayeba nzela ya bosembo te, na esika ete bayeba yango mpe batika yango, mpe basundola Mibeko ya bosantu oyo bapesaki bango. 22Masese ezali koloba solo mpo na bango : ete mbwa ezongelaka biloko oyo esanzaka
Tala mpe Masese 26.11
mpe “ngulu, ata bawuti kosukola yango ezongaka lisusu kopipota na poto-poto”.
Copyright information for LinMNB