2 Peter 3

Koya ya Nkolo

1Balingami, oyo ezali sikʼoyo mokanda na ngai ya mibale nazali kokomela bino. Kasi na oyo ya liboso, ndenge moko mpe na oyo ya mibale, nazali koluka kolamusa mayele na bino oyo ezali peto, mpo bokanisaka mateya oyo bozwaki. 2Nalingi bokanisa maloba oyo baprofeta ya bosantu baloba wuta kala, mpe Mibeko oyo Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso apesa, na nzelaya bapostolo na bino. 3Boyeba liboso ete, na mikolo ya suka, batioli bakoya, bakotiola mpe bakolanda baposa na bango ya mabe. 4Bakoloba : “Apesaki elaka ete akoya, bongo akoya tango nini ? Pamba te, banda bankoko na biso bakufa, makambo nyonso ezali kaka ndenge moko banda na ebandeli ya mokili !”

5Kasi bazali kobosana makambo oyo na nko : ete kala, Nzambe asalaki likolo mpe mokili na Liloba na ye. Asalaki mokili wuta na mayi mpe na nzela ya mayi. 6Mpe, ezali na mayi mpe, nde mokili ya tango wana edindaki na mayi mpe ekufaki. 7Kasi likolo mpe mokili oyo ezali sikʼoyo bazali kobomba yango na nzela ya Liloba ya ndenge moko, mpo ezika moto. Bazali kobomba yango mpo na mokolo oyo bakosambisa mpe bakoboma bato oyo batosaka te.

8Kasi, balingami, bobosana te likambo oyo : Mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola bambula nkoto, mpe bambula nkoto ezali lokola mokolo moko
Tala mpe nzembo 90.4
.
9Nkolo azali kowumela te mpo na kokokisa elaka na ye, ndenge bato mosusu bazali kokanisa yango. Azali kokanga motema mpo na bino, alingi te ete moto moko abunga, kasi bato nyonso babongola mitema. 10Kasi mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Likolo ekolimwa nalokito monene ; biloko ya likolo ekozika na moto, mpe mokili na misala nyonso oyo ezali kati na yango ekozika.

11Lokola biloko nyonso ekobebisama na ndenge wana, bosengeli kozala bato ya ndenge nini ? Bosengeli kozala na bomoi ya bosantu mpe na bomoi ya kotosa makambo ya Nzambe, 12awa bozali kozela mokolo ya Nzambe mpe kolinga ete yango eya noki. Mokolo yango, likolo ekopela moto mpe ekonyangwama mpe bilokoya likolo ekoniangwama mpo na moto. 13Kasi biso, tozali kozela, ndenge Nzambe alakaki yango, likolo yasika mpe mokili ya sika epai bosembo ekozala.

14Yango wana balingami, lokola bozali kozela makambo wana, bosala makasi mingi penza mpo ete Nzambe akuta bino na bosoto te, na likambo moko te ya mabe, mpe na kimia elongo na ye.

15Boyeba malamu ete, kokanga motema ya Nkolo na biso, ezali mpo ete bato bakoka kobika, ndenge molingami na biso Polo akomelaki binompe, na bwania oyo Nzambe apesaki ye. 16Akomaka ndenge moko kati na mikanda na ye nyonso, oyo alobelaka makambo oyo. Mikanda na ye ezalaka na makambo mosusu oyo ezalaka makasi mingi mpo na kososola ; oyo bato bayebi eloko te mpebalendisama malamu te babongolaka tina na yango, ndenge basalaka mpe na biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko !

Mitindo ya suka

17Yango wana balingami, lokola bosiʼboyebi yango, bokeba mpo ete bolanda te libunga ya bato oyo babeba, mpe bokweyisa molende na bino te. 18Kasi bokola kati na ngolu mpe kati na boyebi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo. Nkembo ezala na ye banda sikʼoyo mpe libela na libela. Amen.
Copyright information for LinMNB