2 Thessalonians 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Polo, Silas mpe Timote, totindi mokanda oyo na Lingombaya bandeko ya Tesalonika, baoyo bazali kati na Nzambe Tata na biso mpe kati na Nkolo Yesu Kristo.

2Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.

Libondeli ya kozongisa matondi mpe malendisi

3Bandeko, tosengeli kotonda Nzambe tango nyonso mpo na bino. Ezali malamu mpo na biso ete tosala bongo, pamba te kondima na bino ezali kokola penza, mpe bolingo oyo moko na moko na kati na bino azali na yango na moninga na ye ezali kaka kobakisama.

4Yango wana, tomikumisaka mpo na bino na kati ya Mangomba ya Nzambe ; tomikumisaka mpo na ndenge bozali kokanga motema mpe mpo na kondima oyo bozali na yango na kati ya minyoko mpe bapasi nyonso oyo bozali komona.

5Nyonso wana ezali kaka kolakisa ete Nzambe akataka makambo na bosembonyonso, mpo ete bomonana bozali bato ya kokoka mpo na Bokonzi ya Nzambeoyo bozali komona pasi mpo na yango. 6Nzambe azali sembo : akozongisa minyoko na bato oyo bazali konyokolabino, 7mpe akopesa bino bato bozali komona pasi, bopemi elongo na biso. Akosala bongo tango Nkolo Yesu akomonana wuta na Likolo, kati na moto makasi, elongo na baanzelu na ye ya nguya. 8Akopesa etumbu na baoyo bayebi Nzambe te mpe bazali kotosa te Sango Malamu ya Nkolo na biso Yesu. 9Bakozwa etumbu ya libebi ya seko, mpe bakobengana bango liboso ya Nkolo mpe liboso ya nkembo ya nguya na ye, 10tango akoya na mokolo wana mpo ete basantu na ye bapesa ye nkembo, mpe baoyo nyonso bandimaki bakamwa ye. Bino mpe bokozala na bango elongo, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino.

11Yango wana tobondelaka tango nyonso mpo na bino. Tosengaka Nzambe na biso ete amona bino bato ya kokoka mpo na kobenga oyo abenga bino, mpe na nzela ya nguya na ye akoka kotondisa bino na posa monene mpo na kosala malamu mpe misala nyonso oyo kondima na bino ezali kosala. 12Na bongo kombo ya Nkolo na biso Yesu ekozwa lokumu kati na bino, mpe bino kati na ye, na lolenge ya ngolu ya Nzambe na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo.
Copyright information for LinMNB