2 Thessalonians 2

Likambo oyo ekosalama liboso ya koya ya Nkolo

1Bandeko, mpo na oyo etali koya ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpekosangana na biso mpo na kokutana na ye, tosengi bino, 2botika te ete makanisi na bino etonda na mitungisi, to mpe kobanga ekanga bino mpo na emoniseli moko boye, to maloba ya motu moko, to mpempo na mokanda oyo bakoki koloba ete ewuti epai na biso, oyo ezali koloba ete Mokolo ya Nkolo esiʼekomi.

3Bondima te moto ata moko akosa bino ata na lolenge nini, pamba te liboso ete Mokolo wana ekoma, bato basengeli liboso koboya mateya ya Kristo mpe moto ya masumu asengeli komonana liboso, moto oyo asengeli kobeba, 4oyo azali kotelemela mpe komipesa lokumu likolo ya nyonso oyo batobabengaka “Nzambe” to oyo bato bakumbamelaka, mpe, akokende kutukovanda na Ndako ya Nzambe mpe akomibenga ye moko ete azali Nzambe. 5Boni, bozali lisusu kokanisa te ete, tango nazalaki elongo na bino, ete nayebisaki bino makambo wana ?

6Mpe sikʼoyo boyebi oyo ezali kokangisa ye, mpo ete akokakomimonisa na tango na ye. 7Pamba te nguya ya masumu oyo ezali naino ya kobombama esiʼebandi kosala ; kasi ye oyo azali kokangisa yango kino sikʼoyo, akokoba kosala bongo kino tango bakolongola ye, 8bongo Mosumuki akomonana, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na mopepe ya monoko na ye mpe akobebisa yena nkembo ya koya na ye. 9Mosumuki akoya na nguya ya Satana mpe akosala makamwisi ya lolenge nyonso, bilembo, makambo minene-minene ya lokuta, 10mpe makambo nyonso ya mabe oyo ekosaka baoyo bazali kokufa. Bakokufa mpo baboyaki kolinga makambo ya solo oyo ekoki kobikisa bango.

11Yango wana Nzambe atindeli bango nguya ya libunga, mpo bandima makambo ya lokuta, 12mpo ete baoyo nyonso bandimaki makambo ya solo te, kasi basepelaki na makambo ya mabe, bazwa etumbu.

Kotelema ngwi kati na kondima

13Kasi biso, tosengeli kozongisa matondi na Nzambe tango nyonso mpo na bino baoyo Nkolo alingaka. Pamba te Nzambe asiʼapona bino banda na ebandeli mpo ete bozwa lobiko na nzela ya mosala ya Molimo oyo akomisaki bino basantu, mpe na nzela ya kondima makambo ya solo. 14Nzambe abengaki bino na yango na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, mpo ete bozwa nkembo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.

15Yango wana bandeko, botelema ngwi mpe bosimba malamu mateya oyo toteyaki bino, ezala na maloba to mpe na mokanda. 16Tika ete ye moko Nkolo na biso Yesu Kristo mpe Nzambe Tata na biso ye oyo alingaki biso, mpe na nzela ya ngolu na ye, apesaki biso lilendisi ya seko mpe elikya ya kitoko penza, 17batondisa mitema na bino na molende mpe bapesa bino makasi mpoete bosala misala nyonso ya malamu mpe bolobaka maloba nyonso ya malamu.
Copyright information for LinMNB