2 Timothy 1

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Polo, mopostolo ya Yesu Kristo na mokano ya Nzambe, natindama mpo na kosakola bomoi oyo Nzambe alaka, oyo ezali kati na Kristo Yesu ; 2natindi mokanda oyo epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo.

Tika ete ngolu, mawa, mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Nkolo na biso Kristo Yesu ezala na yo.

Polo azongisi matondi mpo na Timote

3Nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe, oyo nasalelaka na motema peto, ndenge bakoko na ngai bazalaki kosalela ; mpo ete butu mpe moi nakanisaka yo tango nyonso kati na mabondeli na ngai. 4Nakanisaka kolela na yo, mpe nazali na posa mingi mpo na komona yo, mpo ete natonda na esengo.

5Nakanisaka kondima ya solo oyo ozali na yango, kondima oyo kokona yo ya mwasi Lowis mpe mama na yo Enis bazalaki na yango mpe. Nazali kondima ete ozali na kondima yango mpe.

Pelisa lisusu moto

6Yango wana nazali kolendisa yo, olamusa lisusu likabo oyo Nzambe apesaki yo tango natielaki yo maboko. 7Pamba te, Molimo oyo Nzambe apesaki biso ekomisaka biso bato ya kobanga te ; kasi Molimo oyo etondisaka biso na nguya, na bolingo, mpe na koyeba komibatela.

8Yango wana, koyoka soni te kotatola mpo na Nkolo na biso, to mpe mpo na ngai, moto na ye ya boloko. Kasi mona pasi elongo na ngaimpo na Sango Malamu, ndenge Nzambe azali kopesa yo makasi mpo na yango. 9Abikisa biso mpe abenga biso mpo tozala na bomoi ya bosantu ; ezali te mpo na misala oyo tozalaki, kasi mpo na mabongisi mpe ngolu na ye moko.

Ngolu oyo apesaki biso kati na Kristo Yesu liboso ya ebandeli ya tango,
10kasi emonani sikʼoyo na nzela ya koya ya Mobikisi na biso Kristo Yesu, ye oyo asilisaki nguya ya liwa mpe angengisaki bomoi mpe kozanga kokufa na nzela ya Sango Malamu.

11Mpe ezali mpo na koteya Sango Malamu yango, nde Nzambe atiaki ngaimoteyi, mopostolo mpe molakisi. 12Yango wana nazali komona bapasi ya ndenge oyo. Kasi nazali koyoka soni te, pamba te nayebi moto oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki mpo na kobatela kino na mokolo wana, nyonso oyo apesa ngai.

13Makambo oyo oyokaki epai na ngai, batela yango lokola ndakisa ya mateya ya sembo, na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu Kristo. 14Batela makambo ya malamu oyo bapesaki yo ; batela yango na lisalisi ya Molimo Mosantu oyo avandaka kati na biso.

Molende ya Onezifore

15Oyebi yango ete, baoyo nyonso bazali na mokili ya Aziabasiʼbakima ngai, kati na bango tozali na Fizele na Ermozene. 16Tika ete Nkolo ayokela libota ya Onezifore mawa, pamba te abondisaka ngai mbala na mbala mpe ayokaka soni te mpo na ngai mpo nazali na boloko, 17Kasi tango akomaki na Roma, asalaki nyonso mpo na koluka ngaikino tango amonaki ngai. 18Tika ete Nkolo andima ete Onezifore azwa, na mokolo wana, bolamu ya Nkolo. Mpe oyebi malamu soki na lolenge nini ye asalisaki ngaina Efezo.
Copyright information for LinMNB