2 Timothy 4

Teya Liloba !

1Yango wana, liboso ya Nzambe mpe liboso ya Yesu Kristo, ye oyo akosambisa bato ya bomoi mpe baoyo bakufa ; mpe, mpo na koya na ye, mpempo na Bokonzi na ye, nasengi yo : 2teya Liloba, teya yango na molende nyonso ezala na tango ya matata to na tango ya matata te, pamela, bongisa, lendisa, mpe teya yango na kokanga motema.

3Pamba te tango ezali koya, oyo bato bakolinga te koyoka mateya ya solo, kasi bakolanda baposa na bango ya nzoto, mpe bakomilukelabango moko bateyi, oyo bakoteya bango makambo oyo matoyi na bango ekozala na mokusa mpo na koyoka. 4Bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa mingi mpo nakoyoka masapo. 5Kasi yo, mibatela na makambo nyonso ; kanga motema na bapasi oyoozali komona, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, mpe kokisa malamu mosala na yo.

Polo asukisi kopota mbangu

6Pamba te, mpo na ngai, ngonga esiʼekoki mpo bakaba ngai na mbeka ; tango esiʼekoki mpo na ngai mpo natika bomoi oyo. 7Nabundi etumba ya malamu, nasilisi kopota mbangu, mpe nabateli kondima na ngai. 8Sikʼoyo Nzambe abombeli ngai ekoti ya lukumu oyo ya bosembo, oyo Nkolo, mosambisi ya sembo akopesa ngai na mokolo wana, kaka na ngai moko te, kasi na baoyo nyonso mpe bazali kozela na posa monene, komonana na ye.

Bansango ya suka ya Polo

9Sala nyonso mpo oya noki epai na ngai, 10pamba te Demas, lokola alingi mokili oyo, asiʼakima ngai mpe akenda na Tesalonika. Kresansi akenda na Galatia, bongo Tito akendana Dalmatia. 11Kaka Luka nde azali na ngai elongo. Kamata Marko mpe boya na ye elongo, pamba te azali na tina mingi mpo na ngai, mpo na mosala na ngai. 12Natindaki Tishike na Efezo.

13Tango okoya, mema kazaka oyo natikaki na Trowas, epai ya Karpuse ; memela ngai mpe babuku na ngai, kutu penza oyo esalama na poso ya nyama.

14Alekizande, mosali bibende, asalaki ngai mabe mingi ; Nkolo akofuta ye mpo na oyo asalaki. 15Yo mpe keba na ye, pamba te atelemelaki mateya na biso na makasipenza.

16Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosalisa ngai ; bango nyonso bakimaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te. 17Kasi Nkolo atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai makasi, mpo ete na nzela na ngai, mateya ekoka koteyama na mobimba na yango, mpe baoyo nyonso bazali Bayuda te bakoka koyoka yango. Mpe akangolaki ngai na monoko ya ntambwe.

18Ya solo, nayebi ete Nkolo akokoba kokangola ngai na misala nyonso ya mabe mpe akobatela ngai mpo na Bokonzi na ye ya Likolo. Tika ete azwakembo, libela na libela ! Amen.

Bambote

19Pesa mbote na Priska mpe na Akilas, mpe na libota ya Onezifore. 20Eraste atikalaki na Korinto, mpe natikaki Trofime azali maladi na Mileti.

21Sala nyonso mpo okoma awa liboso ete tango ya malili makasiebanda. Ebulus, Pudans, Linus, Klodia, na bandeko nyonso, bapesi yo mbote.

22Nkolo azala na molimo na yo. Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na yo.
Copyright information for LinMNB