3 John

Ebandeli ya mokanda

1Ngai Mpaka, natindi mokanda oyo epai ya Molingami Gayus, ye oyo nalingaka kati na solo.

2Molingami, nazali kobondela ete makambo na yo nyonso etambolamalamu mpe ozala na nzoto makasi, ndenge mpe molimo na yo ezali kotambola malamu.

Ezaleli malamu ya Gayus

3Nasepelaki mingi penza tango bandeko bayaki wuta epai na yo, mpe bayebisaki ngai litatoli oyo ete : ozali ya kokangama kati na makambo ya solo mpe ozali kokoba kotambola kati na makambo ya solo. 4Eloko moto te ezali kopesa ngai esengo monene koleka oyo : koyoka ete bana na ngai bazali kotambola kati na makambo ya solo.

5Molingami, ozali kosala na bosembo nyonso na nyonso oyo ozali kosala mpo na bandeko, atako bango bazali bapaya epai na yo. 6Bapesaki litatoli ya bolingo na yo liboso ya Lingomba.

Okosala malamu, soki osalisi bango mpo bakoba mobembo na bango, na lolenge oyo esepelisaka Nzambe.
7Pamba te, bango bazali kokende koteya mpo na kombo ya Nkolompe bazwi lisalisi moko te epai ya bato oyo bazali bandimi te. 8Yango wana, tosengeli koyamba bato ya ndenge wana mpo ete tokoka kosala lisanga mpo na makambo ya solo.

Misala mabe ya Diotrefe

9Nakomaki mwa mokanda ya mokuse na Lingomba ; kasi Diotrefe, oyoalingaka kozala mokambi na bango, aboyaki kotosa ngai. 10Yango wana, tango nakoya, nakobimisa makambo nyonso oyo asalaka ; makambo ya mabe penza oyo alobaka mpo na biso. Atako azali kosala bongo, kasi asepelaka kaka te, mpe azali koboya koyamba bandeko. Azali mpe kopekisa baoyo balingaka koyamba bango, mpe azali kobengana bango na Lingomba.

11Molingami, kolanda makambo ya mabe te ; kasi landa makambo ya malamu. Moto oyo asalaka makambo ya malamu, azali moto ya Nzambe. Motooyo asalaka makambo ya mabe, naino amoni Nzambe te.

Litatoli mpo na Demetriyus

12Kasi mpo na Demetriyus, bato nyonso balobaka makambo ya malamumpo na ye, mpe ata bosolo yango moko mpe etatolaka malamu mpo na ye. Biso mpe, tolobaka malamu mpo na ye, mpe oyebi ete litatoli na biso ezali ya solo.

Likanisi ya koya kotala yo

13Nazali na makambo mingi mpo na kokomela yo, kasi nalingi kokomela yo te na biki mpe na mayi ya biki mpe na ekomeli. 14Nazali na elikya mpo na komona yo noki penza, mpe tokosolola ngai na yo.

Mbote ya suka

15Tika ete kimia ezala na yo. Baninga ya awa batindeli yo mbote. Pesa baninga ya kuna mbote, moko na moko na kombo na ye.
Copyright information for LinMNB