Acts 1

EBANDELI

1Teofile, na buku na ngai ya liboso, nakomaki makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpe ateyaki wuta na ebandeli, 2kino na mokolo oyo amataki na likolo, sima na ye kopesa mitindo na nzela ya Molimo Mosantu epai ya bayekoli oyo aponaki.

3Sima ya bapasi na ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei, mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.

KOZELA BOYEI YA MOLIMO

Elaka ya Molimo Mosantu

4Mokolo moko, tango azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango etinda oyo :

—Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na ngai alakaki, likabo oyo boyokaki ngai kolobela.
5Pamba te, Yoane abatisaki na mayi, kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama na Molimo Mosantu !

6Boye, tango basanganaki elongo, batunaki ye :

—Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi ya Isalaele ?

7Yesu azongiselaki bango :

—Yango ezali likambo na bino te mpo na koyeba tango to mokolo oyo Tata abongisa na mokano na ye.
8Kasi, bokozwa nguya tango Molimo Mosantu akokitela bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yudea, ya Samari mpe kino na basuka ya mokili.

Bozongi na Yelusalemi

9Tango asilisaki koloba makambo oyo, Yesu amataki na likolo tango bazalaki kotala ye. Boye, lipata moko eyaki kozipa ye na miso na bango. 10Wana bazalaki nanu kotala na likolo ndenge Yesu azalaki komata, mbala moko, bato mibale balata bilamba ya pembe-pembe batelemaki pembeni na bango mpe balobaki : 11“Bato ya Galile, mpo na nini botelemi awa mpo na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na likolo, akozonga kaka ndenge bomoni ye kokende.”

12Boye, bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi na bametele pene nkoto moko (1.000). 13Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, esika oyo bazalaki na momesano ya kosangana. Kati na bato yango ezalaki : Piere, Yoane, Jake, Andele, Filipo, Toma, Batelemi, Matayo, Jake, mwana mobali ya Alife, Simo oyo azalaki na lingomba ya Bazelote mpe Jide, mwana mobali ya Jake. 14Bango nyonso na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kobondela elongo na basi, lokola Mari, mama na Yesu elongo na bandeko na Yesu.

Baponi Matiasi mpo na kozwa esika ya Yudasi

15Sima na mwa mikolo, Piere atelemaki kati na bandimi (pene nkama moko na tuku mibale 120) mpe alobaki : 16Bandeko na ngai, esengeli ete Makomi oyo Molimo Mosantu aloba wuta kala na monoko ya Davidi mpo na Yudasi, oyo alakisaki nzela epai ya bato oyo bakangaki Yesu, ekokisama. 17Ye azalaki moko kati na biso mpe azwaki ndambo ya mokumba na ye na mosala oyo bapesaki biso. 18Na mbongo oyo Yudasi azwaki mpo na mabe na ye, asombelaki yango elanga. Kuna nde akweyaki moto na se, libumu na ye epasukaki mpe misopo na ye nyonso ebimaki libanda. 19Bato nyonso ya Yelusalemi bayokaki sango yango ; yango wana bakomaki kobenga elanga yango na monoko na bango : ‘Akelidama’, oyo elingi koloba ‘Elanga ya makila’.

20Pamba te, ekomama boye na buku ya banzembo : ‘Tika ete ndako na ye etikala polele mpo ete moto moko te avanda kati na yango.’ Mpe : ‘Tika ete moto mosusu azwa mokumba na yezali e.’ ”

21Yango wana, na tina ete topona moto moko kati na bato oyo bazalaki na biso elongo tango nyonso Nkolo Yesu azalaki kosala mibembo elongo na biso, 22wuta na tango ya libatisi ya Yoane kino tango Yesu alongwaki kati na biso mpo na komata na likolo. Pamba te, moko kati na bango asengeli kokoma motatoli ya lisekwa na ye elongo na biso.

23Bongo, bapesaki bakombo ya bato mibale : Jozefi, oyo babengaka Barsabasi, kombo na ye mosusu ezalaki Yusitusi, mpe Matiasi. 24Babondelaki boye : “Nkolo, yo oyebi mitema ya bato nyonso. Lakisa biso nani oyo yo osila kopona kati na bato oyo mibale, 25mpo ete akoma ntoma na esika oyo Yudasi atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongaki na ye.”

26Babetaki zeke, mpe Matiasi aponamaki. Bongo, babakisaki ye na molongo ya bantoma zomi na moko.
Copyright information for LinMNB