Acts 11

Piere apesi sango na Yelusalemi

1Bantoma mpe bandeko oyo bazalaki na Yudea bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba ya Nzambe. 2Tango Piere azongaki na Yelusalemi, Bayuda oyo bandimelaki Yesu bapamelaki ye, 3mpe balobaki :

—Mpo na nini okotaki na ndako ya bato ya bikolo ya bapaya mpe oliaki elongo na bango !

4Boye, Piere alimbolaki likambo yango ndenge esalamaki. Alobaki na bango :

5—Nazalaki kobondela na engumba ya Jafa mpe nazwaki emoniseli oyo : Namonaki eloko moko lokola elamba ya monene kokita wuta na likolo. Basimbaki yango na basonge na yango minei, mpe ekitaki kino na esika oyo nazalaki. 6Tango natalaki yango malamu, namonaki kati na yango : banyama ya makolo minei, banyama ya zamba, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke. 7Bongo, nayokaki mongongo moko koloba na ngai : “Piere telema ! Boma mpe lia !”

8Kasi ngai nazongisaki : “Te Nkolo ! Nanu nalia eloko ya mbindo to ya bosoto te.”

9Bongo, wuta na likolo, mongongo yango elobaki na ngai lisusu mpo na mbala ya mibale : “Eloko oyo ngai Nzambe nabengi peto, yo kobenga yango mbindo te.” 10Yango esalamaki mbala misato, bongo nyonso ezongaki lisusu na likolo.

11Kaka na tango wana, bato misato oyo bawutaki na Sezare bakomaki na ndako oyo nazalaki kovanda, mpo ete batindaki bango epai na ngai. 12Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bongo, bandeko motoba ya Jafa mpe bakendaki na ngai elongo kino na Sezare, mpe tokotaki na ndako ya moto yango. 13Boye, ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye na ndako mpe koloba na ye : “Tinda bato na Jafa, mpe bengisa Simona oyo babengaka Piere. 14Akoyebisa yo maloba oyo ekobikisa yo mpe libota na yo mobimba !”

15Wana nazalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bango kaka ndenge akitelaki biso na ebandeli. 16Boye, nakanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki : “Yoane abatisaki na mayi, kasi bino, Nzambe akobatisa bino na Molimo Mosantu.” 17Soki Nzambe apesaki bango likabo ya ndenge moko na biso oyo tondimelaki Nkolo Yesu Klisto, bongo ngai nazali nani mpo ete nakoka koboya makambo oyo Nzambe alingi ?

18Tango bayokaki bongo, bazangaki maloba ya kobakisa mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : “Tala ndenge nini Nzambe asali ete ezala bato ya bikolo ya bapaya babongola mitema mpe bazwa bomoi.”

Lingomba ya Antioshe

19Nzoka nde, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola sango malamu kaka epai na Bayuda. 20Kasi misusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene bakendaki na Antioshe mpe bakomaki koteya sango malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato ya bikolo ya bapaya. 21Nguya ya Nkolo ezalaki na bango elongo mpe bato ebele penza bandimelaki Nkolo mpe bamipesaki epai na Ye.

22Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi mpe batindaki Barnabasi na Antioshe. 23Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo na mitema na bango mobimba. 24Barnabasi solo azalaki moto malamu, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele penza bandimelaki Nkolo.

25Bongo, Barnabasi akendaki kino na Tarse mpo na koluka Saulo. 26Tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Pene na mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo bazalaki kosangana elongo na Lingomba mpe koteya bato ebele. Ezalaki kuna na Antioshe nde babengaki bayekoli, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.

27Na mikolo wana, basakoli oyo bawutaki na Yelusalemi bakendaki na Antioshe. 28Moko kati na bango, na kombo ya Agabusi atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na mikili nyonso oyo bato ya Rome bazalaki kokonza. (Nzala yango esalemaki na tango Klode azalaki mokonzi). 29Bayekoli oyo bazalaki na Antioshe bazwaki mokano ya kotindela bandeko ya Yudea lisungi, moto na moto kolanda makoki na ye. 30Basalaki bongo mpe batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na maboko ya Barnabasi mpe ya Saulo.
Copyright information for LinMNB