Acts 12

Piere abimi na boloko

1Na tango wana, mokonzi Erode akomaki kokanga bandimi misusu ya lingomba mpo na konyokola bango. 2Bongo, abomisaki Jake, ndeko ya Yoane na mopanga. 3Boye, tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangisaki mpe Piere na tango ya feti ya mapa oyo ezanga levire. 4Sima ya kokangisa Piere, atiaki ye na boloko mpe apesaki ye na maboko ya masanga minei ya basoda, mpo ete bakengela ye : lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na likanisi ya kosambisa ye liboso ya bato sima ya feti ya Pasika. 5Bongo, bazalaki kokengela Piere na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende nyonso mpo na ye.

6Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa Piere liboso ya bato, Piere oyo azalaki ya kokangama na minyololo mibale, alalaki kati na basoda mibale mpe bakengeli bazalaki kokengela liboso ya ekuke ya boloko. 7Na mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa mpe pole engengisaki boloko. Anjelu aningisaki Piere na mopanzi, alamusaki ye mpe alobaki na ye : “Telema noki !” Bongo, minyololo oyo ezalaki na maboko ya Piere ekweyaki.

8Anjelu alobaki na ye : “Kanga mokaba na yo mpe lata sandale na yo !” Piere asalaki kaka bongo. Mpe anjelu alobaki na ye lisusu : “Lata kazaka na yo mpe landa ngai !” 9Piere abimaki na boloko mpe alandaki ye. Azalaki koyeba te ete makambo oyo anjelu azalaki kosala ezalaki solo, kasi ye azalaki kokanisa ete ezali ndoto. 10Wana ezalaki bango kokende, balekaki esika oyo bakengeli ya liboso mpe ya mibale bazalaki, boye bakomaki na ekuke ya bibende oyo bakotelaka na engumba, mpe ekuke yango efongwamaki yango moko. Tango babimaki mpe bakomaki na suka ya balabala, na mbala moko, anjelu atikaki ye.

11Tango Piere asosolaki ete makambo oyo esalami epai na ye ezali ya solo, alobaki : “Solo, namoni sikʼoyo ete Nkolo atindaki anjelu na ye, mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai !”

12Tango amonaki bongo, akendaki na ndako ya Maria, mama na Yoane oyo babengaka mpe Malako. Bandimi ebele basanganaki kuna, mpe bazalaki kobondela Nzambe. 13Piere abetaki ekuke mpe mosali moko ya mwasi, na kombo ya Rode ayaki koluka koyeba soki ezali nani. 14Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Piere, atondaki na esengo ; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu koyebisa bango :

—Eh ! Ezali Piere, azali na libanda liboso ya ekuke.

15Kasi bango bazongiselaki ye :

—Nini, ozali na liboma !

Kasi Rode azalaki kaka koloba :

—Ya solo penza ! Piere azali na libanda.

Bongo, balobaki :

—Te, ekoki kozala anjelu na ye.

16Nzoka nde, Piere azalaki kaka kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi. 17Piere apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia. Alimbolelaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu : “Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko misusu.”

Bongo na sima, abimaki na ndako mpo na kokende epai mosusu.

18Wana tongo etanaki, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana : “Likambo nini ekomelaki Piere ?” 19Erode atindaki bato mpo ete baluka Piere, kasi bamonaki ye te. Bongo, asambisaki bakengeli mpe atindaki ete baboma bango. Boye, Erode atikaki Yudea mpe akendaki kovanda mwa mikolo na Sezare.

Kufa ya Erode

20Erode azalaki na matata na bato ya Tire mpe ya Sidoni. Bongo, bayokanaki elongo mpo na kokende komona Erode. Na lisungi ya Blastusi, kalaka oyo abongisaka shambre ya mokonzi, balukaki kozongisa kimia na boboto, kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.

21Tango mokolo oyo Erode akataki ekokaki, alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi, mpe akomaki koloba na bato. 22Boye, bato bakomaki koganga : “Oyo ezali penza mongongo ya nzambe, kasi ya moto te !” 23Kaka na tango wana, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete aboyaki kopesa Nzambe lokumu oyo ekokaki na Ye. Bongo, bangusu ekomaki kolia ye mpe akufaki.

24Kasi Liloba ya Nzambe ezalaki kaka kopanzana mpe bato ebele bazalaki kondima yango.

25Tango Barnabasi mpe Saulo basilaki kokokisa mosala oyo batindaki bango mpo na bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi, mpe bamemaki elongo na bango, Yoane oyo bazalaki kobenga mpe Malako.
Copyright information for LinMNB