Acts 14

Polo mpe Barnabasi na engumba ya Ikoniomi

1Na engumba ya Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendaki lokola momesano na ndako ya mayangani ya Bayuda. Boye, na mateya na bango, bato ebele : Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi. 2Kasi Bayuda oyo bandimaki te batiaki songisongi epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpo ete batombokisa bandeko. 3Polo mpe Barnabasi bawumelaki wana mikolo ebele, bazalaki koteya na molende mpo na Nkolo oyo azalaki kolakisa bosolo ya mateya ya ngolu na ye, na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene. 4Bato ya engumba yango bakabwanaki ; ndambo moko bazalaki sima ya Bayuda mpe ndambo mosusu, sima ya bantoma. 5Boye, bato ya bikolo ya bapaya mpe Bayuda elongo na bakambi na bango bazwaki mokano ya konyokola bantoma mpe koboma bango na mabanga. 6Kasi tango bantoma basosolaki yango, bakimaki na bingumba ya Likaoni : Listre mpe Derbe mpe bazinga-zinga na yango. 7Kuna mpe lisusu, bakobaki kaka koteya sango malamu.

Polo mpe Barnabasi na Listre

8Na engumba ya Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye atikala kotambola te. 9Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Boye, Polo atalaki ye swii mpe asosolaki ete azalaki na kondima mpo na kobika. 10Alobaki na mongongo makasi : “Telema ngwi na makolo na yo !”

Kaka na tango wana, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola.

11Tango ngulupa ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na monoko ya bato ya likaoni : “banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso !” 12Bazalaki kobenga Barnabasi, “Zewusi,” mpe Polo, “Erimesi ;” pamba te Polo moto nde azalaki koloba. 13Nganga-Nzambe ya nzambe Zewusi, oyo ndako ya nzambe na ye ezalaki libanda ya ekuke ya engumba, amemaki ngombe ya mibali mpe bikoti ya lokumu kino na bikuke ya engumba, pamba te ye elongo na bato nyonso oyo bazalaki na ye balingaki kotumbela bango mbeka.

14Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo bayokaki yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendaki mbangu epai ngulupa ya bato ezalaki mpe bagangaki : 15“Oh baninga ! Mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino, tozali banzambe te. Tomemeli bino sango malamu, oyo ezali kotalisa bino ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, mpe bomipesa na Nzambe ya bomoi, oyo asala likolo mpe se, ebale monene mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango. 16Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda, bato na bato, nzela oyo bango moko balingi. 17Nzoka nde, alembaki te kotalisa bango bolamu na ye, na nzela ya konokisela bango mvula wuta na likolo mpe kopesa bango mbuma ebele na tango oyo ekoki ; mpe kopesa bango bilei mpo na kotondisa mitema na bango na esengo.”

18Atako balobaki bongo, balongaki na pasi kopekisa ngulupa ya bato wana kobonzela bango mbeka.

19Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, mpo ete bakanisaki ete asili kokufa. 20Kasi, tango bayekoli bazingelaki ye, Polo atelemaki mpe azongaki kati na engumba. Bongo, na mokolo oyo elandaki, akendaki na Derbe elongo na Barnabasi.

Polo na Barnabasi bazongi na Antioshe

21Polo na Barnabasi bateyaki sango malamu na engumba wana, mpe bakomisaki bato ebele bayekoli. Boye, bazongaki lisusu na Listre, na Ikoniomi mpe na Antioshe. 22Balendisaki bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Balobaki : “Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.” 23Polo na Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko. Babondelaki na kokila bilei, mpe bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki. 24Sima na bango koleka mokili ya Pisidi, bakomaki na Pafili. 25Wana bateyaki Liloba na Perije, bakendaki kino na libongo ya Atalia.

26Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi babondelaki Nzambe ete abatela bango na ngolu na ye, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa.

27Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, mpe ndenge nini afongolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima. 28Bongo, bawumelaki wana tango molayi elongo na bayekoli.
Copyright information for LinMNB