Acts 15

Likita ya Yelusalemi

1Ndambo ya bato oyo bawutaki na Yudea bakomaki na Antioshe mpe bakomaki koteya bandeko : “Soki bokatisi nzoto ya mibali te kolanda Mobeko ya Moyize, bokozwa lobiko te.” 2Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana, bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo mpe Barnabasi elongo na bandimi misusu bakende na Yelusalemi mpo na komona bantoma mpe bakambi na tina ya likambo yango. 3Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Bakatisaki Fenisi mpe Samari, mpe bazalaki kotatola ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa esengo na bandeko nyonso. 4Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; boye Polo mpe Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.

5Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala bafarizeo batelemaki mpo na koloba : “Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatisa nzoto ya mibali mpe kotosa Mobeko ya Moyize.”

6Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango. 7Lokola tembe elekaki makasi, Piere atelemaki mpe alobaki : “Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino, mpo ete nakoka koteya sango malamu na bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bandima. 8Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato, alakisaki ete andimaki bango, na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, kaka ndenge apesaki biso. 9Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te apetolaki mitema na bango na nzela ya kondima. 10Bongo sikʼoyo, mpo na nini bolingi komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo ezala biso to batata na biso tolongaki komema te ? 11Te ! Biso tondimaka ete tobikisami na ngolu ya Nkolo Yesu, kaka ndenge moko mpe na bango.”

12Boye, lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe azalaki kosala na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya. 13Tango basilisaki koloba, Jaki azwaki maloba mpe alobaki :

—Bandeko boyoka ngai !
14Simona awuti kolimbolela biso ndenge nini wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na ye. 15Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli ndenge ekomama :
16 Sima na yango, nakozonga,
nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya.
Nakotonga yango lisusu
mpe nakotelemisa yango,

17 Mpo ete bato oyo bakotikala bakoka koluka Nkolo,
mpe bato nyonso ya bikolo ya bapaya
oyo babengami na Kombo na ngai,
elobi Nkolo,
oyo asalaka makambo oyo,

18 Makambo oyo eyebana wuta kala.

19Yango wana, tala likanisi na ngai : Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe. 20Na esika ya kotungisa bango, tokomela bango kaka ete balia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, basala ekobo te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila mpe balia makila te. 21Pamba te, wuta kala, bateyi bateyaka Mobeko ya Moyize na bingumba nyonso, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani mikolo nyonso ya saba.

Mikano mpe mokanda ya Likita

22Bongo, bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi mpe Silasi. Bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko. 23Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye :

Biso bandeko na bino, bantoma mpe bakambi, Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka na Antioshe, na Siri mpe na Silisi : Mbote na bino.

24Toyokaki ete bandeko misusu kowuta epai na biso, bayaki kotia mobulu kati na bino, mpe kotungisa makanisi na bino na maloba na bango. Nzoka nde, biso topesaki bango nzela te. 25Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso Barnabasi mpe Polo, 26Ba-oyo bakaba bomoi na bango mobimba mpo na mosala ya Nkolo na biso Yesu Klisto. 27Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi, mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.

28Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba misusu te, longola kaka bikateli oyo :

29

Bolia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, bolia makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila mpe bosala ekobo te.

Ekozala malamu soki bokimi makambo oyo. Botikala malamu.

30Boye, batikaki bango kokende na Antioshe, epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki bango mokanda yango. 31Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi mpo na maloba ya kolendisa oyo ezalaki kati na yango. 32Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki na likabo ya kosakola maloba ya Nzambe, bazwaki penza tango molayi ya koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima. 33Bawumelaki wana mwa tango molayi, mpe bandeko batombelaki kimia na bozongi, epai ya bato oyo batindaki bango. 34[Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.] 35Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba ya Nkolo elongo na bato mosusu.

Polo mpe Barnabasi bakabwani

36Sima ya mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi :

—Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba ya Nkolo, mpo ete totala soki ndenge nini bandeko bazali.

37Barnabasi azalaki na posa ya komema Yoane oyo babengaka Malako elongo na bango. 38Nzoka nde, Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe asungaki bango te na mosala. 39Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi akamataki Malako mpe akotaki na ye elongo na masuwa mpo na kokende na Shipre. 40Kasi Polo akamataki Silasi mpe bakendaki, mpe bandimi batikaki bango na se ya ngolu ya Nkolo. 41Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa mangomba.
Copyright information for LinMNB