Acts 19

Polo na Efeso

1Wana Apolosi azalaki na Korinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azi, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli mpe atunaki bango :

2—Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi ?

Bazongiselaki ye :

—Te ! Totikala nanu koyoka te, ete Molimo Mosantu azalaka.

3Polo atunaki bango lisusu :

—Libatisi ya ndenge nini penza bozwaki ?

Bazongisaki :

—Tozwaki libatisi ya Yoane.

4Polo alobaki na bango :

—Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa, ezalaki libatisi ya kobongola motema. Azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu.

5Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu. 6Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na minoko ya sika mpe kosakola. 7Bango nyonso bazalaki bato pene zomi na mibale.

8Bongo, Polo azalaki kokende na ndako ya mayangani, epai wapi, na basanza misato mobimba, azalaki koloba na molende epai na bato, koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe kondimisa bango yango. 9Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga, bazalaki koboya kondima mpe bazalaki kotiola nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Polo akabwanaki na bango. Boye, amemaki bayekoli, mpe mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya moto moko na kombo ya Tiranisi. 10Esalaki bongo mibu mibale, mpe na ndenge wana, Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya mokili ya Greki oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azi bayokaki Liloba ya Nkolo.

11Nzambe azalaki kosala bikamwa ya somo na nzela ya Polo, 12kino ekomaki kosalema ete, bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na nzoto ya babeli, mpe maladi ya bato yango ezalaki kosila mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango.

13Kasi Bayuda misusu oyo bazalaki na mosala ya kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe, bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Balobaki : “Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo, bobima !” 14Ezalaki bana mibali sambo ya Seva, mokonzi ya banganga-Nzambe nde basalaki bongo. 15Kasi molimo mabe ezongiselaki bango :

—Nayebi Yesu mpe nayebi soki Polo azali nani. Kasi bino, bozali banani ?

16Boye, moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi, kino babimaki na ndako wana bolumbu mpe na bapota.

17Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya mokili ya Greki oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi penza. 18Mingi kati na bato oyo bakomaki bandimi bazalaki koya kondima mpe kotubela polele misala na bango ya mabe. 19Mpe bato ya maji mingi bamemaki babuku na bango, oyo esalaki liboke ya babuku, mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Tango balukaki koyeba motuya ya babuku yango, emonanaki ete ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende nkoto tuku mitano (50.000). 20Na ndenge wana, Liloba ya Nkolo ezalaki kaka kokoba kopanzana mpe kokola na nguya.

Mobulu na engumba ya Efeso

21Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambemi ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki : “Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.” 22Atindandi na Masedwane, mibale kati na basungi na ye ya mosala : Timote mpe Eraste, wana ye moko atikalaki mwa mikolo na Azi.

23Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso mpo na Nzela ya Nkolo. 24Mosali moko oyo alambaka bibende na moto na kombo ya Demetriusi azalaki kosala bililingi ya ndako ya nzambe ya Artemisi na palata. Boye, na mosala yango, azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi. 25Asangisaki basali na ye elongo na bato ya misala ya maboko oyo basalaka mosala moko na ye mpe alobaki na bango :

—Baninga na ngai ! Boyebi malamu ete mosala oyo efutaka biso malamu.
26Nzoka nde, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato, mpe kobenda sima na ye bato ebele awa na Efeso mpe na mokili mobimba ya Azi. Azali koloba ete banzambe oyo esalami na maboko ya bato ezali banzambe te. 27Ezali kaka mosala na biso te nde ekobeba, kasi ekoki mpe kosilisa lokumu ya ndako ya nzambe monene ya mwasi Artemisi. Ebongi te ete lokumu nyonso ya nzambe ya mwasi oyo Azi mpe mokili mobimba esambelaka esila kaka ndenge wana.

28Tango kaka bayokaki maloba wana, basilikaki makasi mpe bakomaki koganga : “Artemisi ya Efeso azali monene !” 29Na mbala moko, engumba mobimba ya Efeso ekotaki na mobulu. Bakangaki bato ya Masedwane mibale oyo bazalaki kotambola elongo na Polo : Gayusi mpe Arisitarke ; bongo bato ebele penza bayaki mbangu na libanda ya ndako ya masano. 30Polo azalaki na posa ya kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisaki ye. 31Ezala mpe baninga na ye oyo bazalaki bakambi ya etuka batindelaki ye maloba ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano.

32Mobulu makasi penza ekotaki kati na ngulupa ya bato : bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe misusu, mpo na likambo mosusu. Boye, mingi kati na bango bazalaki koyeba te tina nini basanganeli wana. 33Boye, ndambo ya bato oyo bazalaki kati na ngulupa ya bato balimbolelaki Alekizandre, moto oyo Bayuda batiaki liboso, likambo yango ndenge ezalaki. Bongo, Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi koloba na bato. 34Kasi tango basosolaki ete azali Moyuda, bango nyonso basalaki pene na bangonga mibale ya koganga lokola moto moko : “Artemisi ya Efeso azali monene !”

35Suka-suka, sekretere ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato. Alobaki : “Bato ya Efeso ! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya nzambe monene ya mwasi Artemisi, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo ? 36Yango wana, lokola moko te akoki kotia tembe na likambo oyo, bovanda kimia mpe bosala makambo ya bozoba te. 37Bomemi bato oyo awa, nzoka nde, babebisi ndako ya nzambe na biso te mpe batioli ye te. 38Soki Demetriusi mpe basali na ye bazwi moto likambo, esambiselo ezali, basambisi mpe bazali. Ebongi malamu ete bakende kofunda. 39Mpe soki bozali na likambo mosusu ya koloba, tokoyekola yango na likita oyo mibeko epesa ndingisa. 40Soki tokebi te, bakoki kofunda biso ete tomemi bato na botomboki mpo na makambo oyo esalami lelo. Na bongo, tokolonga te kolimbola tina oyo bato batondaneli awa.”

41Kaka tango asilisaki koloba, apesaki mitindo ete bato bapanzana.
Copyright information for LinMNB