Acts 2

BATATOLI NA YELUSALEMI

Koya ya Molimo Mosantu

1Tango mokolo ya Pantekote ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko. 2Na pwasa, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, bongo etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana. 3Bamonaki biloko moko lokola balolemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango. 4Bango nyonso batondaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na minoko misusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.

5Nzoka nde, kati na Yelusalemi, ezalaki na Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bawutaki na bikolo nyonso ya mokili. 6Tango bayokaki lokito wana, ebele ya bato bayaki mbangu kosangana wana, mpe bakomaki kokamwa, pamba te moko na moko kati na bango azalaki koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka.

7Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna : “Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te ? 8Boye, ndenge nini moto na moto kati na biso azali koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka ? 9Bato ya Parte, ya Medesi mpe ya Elami, bato oyo bavandaka na Mezopotami, na Yudea, na Kapadose, na Ponti mpe na Azi, 10na Friji mpe na Pafili, na Ejipito mpe na Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome, 11bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda : bato ya Krete mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe na minoko na biso ya mboka !” 12Bango nyonso, elekelaki bango, bazalaki kokamwa mingi mpe bakomaki kotunana : “Likambo oyo elingi koloba nini ?”

13Nzoka nde, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba : “Balangwe masanga ya vino.”

Piere ateyi ebele ya bato

14Boye, Piere atelemaki elongo na bantoma zomi na moko, mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato :

—Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbolela bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.
15Bato oyo balangwe masanga te ndenge bozali kokanisa. Pamba te, tozali nanu na ngonga ya libwa ya tongo. 16Kasi, ezali nde makambo oyo mosakoli Joeli alobaki :
17 Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe,
nakosopa Molimo na ngai na bato nyonso.
Bana na bino, ezala ya mibali to ya basi bakosakola,
bilenge na bino bakozwa bimoniseli
mpe mibange na bino bakolota bandoto.

18 Solo, na mikolo wana,
nakosopa Molimo na ngai
ezala na basali na ngai ya mibali to ya basi,
boye bakosakola.

19 Nakosala bikamwa kuna na likolo,
mpe bilembo ya somo awa na se :
makila, moto mpe likonzi ya milinga.

20 Moyi ekobogwana molili,
sanza ekobogwana makila
liboso ete Mokolo ya Nkolo ekoma,
mokolo monene mpe mokolo ya nkembo.

21 Boye, moto nyonso oyo akobelela
Kombo ya Nkolo akobika.

22Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na ye ndenge bino moko boyebi yango ; 23bakabaki ye na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki ye na kobaka ye na ekulusu. 24Kasi, Nzambe abukaki minyololo ya liwa, asekwisaki ye, pamba te ekokaki kosalama te ete liwa ekanga ye. 25Boye, tala makambo oyo Davidi alobaki na tina na ye : “Nazalaki tango nyonso komona Nkolo liboso na ngai.
Pamba te, azali na loboko na ngai ya mobali
mpo ete naningana te.

26 Yango wana, motema na ngai etondi na esengo
mpe lolemo na ngai ezali kosepela,
solo, nzoto na ngai ekopema na elikya,

27 Pamba te, okosundola te molimo na ngai
na mboka ya bakufi
mpe okotika te ete Mosantu na yo apola.

28 Pamba te, olakisaki ngai nzela ya bomoi,
mpe okotondisa ngai na esengo na miso na yo.”

29Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina ya koko na biso Davidi ete akufa mpe bakunda ye, bongo lilita na ye ezali awa kino lelo. 30Kasi, azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka na nzela ya ndayi ete, moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi. 31Davidi amonaki makambo oyo wuta kala, alobelaki nde lisekwa ya Klisto, ete Nzambe akosundola ye na mboka ya bakufi te mpe nzoto na ye ekopola te. 32Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi, boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango. 33Anetolamaki kino na loboko ya mobali ya Nzambe, bongo azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo ye Tata alakaki mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sikʼoyo.

34Pamba te, Davidi abutaki na likolo te, kasi alobaki : Yawe alobaki na Nkolo na ngai :
“Vanda na loboko na ngai ya mobali,

35 Kino tango nakotia
banguna na yo na se ya makolo na yo.”

36Yango wana, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba solo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.

Bandimi ya liboso

37Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Piere mpe bantoma misusu :

—Bandeko, tosala nini ?

38Piere azongiselaki bango :

—Bobongola mitema mpe moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo ya Yesu Klisto mpo ete masumu na bino elimbisama. Bongo, bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
39Pamba te, elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bato nyonso oyo bavandaka na bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Yawe Nzambe na biso akobenga.

40Piere azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : “Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu oyo ezali kozela bato ya mabe te.”

41Bato oyo bandimaki maloba ya Piere bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato (3.000) babakisamaki na lisanga ya bandimi.

Lisanga ya bandimi

42Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kasambela. 43Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makambo minene mpe ya kokamwa. 44Bandimi nyonso bakomaki na bomoko, mpe biloko na bango ezalaki mpo na bango nyonso. 45Bazalaki koteka mabele na bango mpe biloko na bango, mpe bazalaki kakabola mbongo kati na bango, ndenge ezalaki posa ya moto na moto. 46Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa. 47Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.
Copyright information for LinMNB