Acts 20

Polo na engumba ya Troasi

1Wana mobulu esilaki, Polo abengisaki bayekoli mpe alendisaki bango. Sima na yango, apesaki bango mbote ya suka mpe akendaki na Masedwane. 2Wana azalaki kotambola kati na etuka yango ; azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na mokili ya Gresi, 3epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalaki ye likita mpo na kosala ye mabe. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane. 4Tala bato oyo bakendaki na ye elongo : Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere, Aristarike mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika, Gayusi, moto ya Derbe, Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya mokili ya Azi. 5Bango nde bakendaki liboso mpo na kozela biso na Troasi. 6Kasi biso tozwaki masuwa na engumba ya Filipi sima ya feti ya mapa ezanga levire. Wana totambolaki mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi. Tosalaki kuna mikolo sambo.

7Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo oyo asengelaki kokende na mobembo na mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi, mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu. 8Tosanganaki na shambre ya likolo oyo ezalaki na miinda ebele. 9Nzoka nde, elenge mobali moko, na kombo ya Etikisi avandaki na lininisa. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi mpe na mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa.

10Polo akitaki, atiaki litoyi na ye na tolo na ye, akamataki ye na maboko na ye mpe alobaki : “Bobanga te, azali na bomoi.”

11Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendaki. 12Bongo, bazongisaki elenge mobali epai na bango na bomoi mpe bango nyonso balendisamaki makasi.

Kolongwa na Troasi kino na Mile

13Biso tokendaki liboso, mpe tozwaki masuwa oyo ememaki biso na Asosi, epai wapi Polo asengelaki komatela na masuwa. Azwaki mokano wana, mpo ete ye moko alingaki kokende kuna na makolo. 14Tango akutanaki na biso na Asosi, amataki na masuwa elongo na biso mpe tokendaki na Mitilena. 15Longwa wana, tozwaki masuwa mpo na kokende, mpe tokomaki liboso ya Shio na mokolo oyo elandaki. Sima ya mokolo moko, tokomaki na Samosi, mpe na mokolo oyo elandaki, tokomaki na Mile. 16Polo azwaki mokano ya kotelema te na Efeso mpe kolekisa tango te na mokili ya Azi, pamba te azalaki na posa, soki akolonga, ya kokoma noki na Yelusalemi, mpo ete azala na mokolo ya Pantekote.

17Wuta na Mile, Polo abengisaki bakambi ya Lingomba ya Efeso. 18Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango :

—Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango, tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azi.
19Nasalelaki Nkolo na komikitisa nyonso, na mayi na miso, ata namekamaki makasi na nzela ya mitambo ya Bayuda. 20Nzoka nde, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko. 21Nazalaki tango nyonso kosenga ezala na Bayuda to na bato ya mokili ya Greki ete bazonga epai na Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe ete bandimela Nkolo na biso Yesu.

22Boye, sikʼoyo, na etinda ya Molimo, nakeyi na Yelusalemi, kasi nayebi te likambo nini ekokomela ngai kuna. 23Eloko moko kaka nayebi ezali ete, Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota. 24Nzoka nde, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kokima mbangu mpe kokokisa mosala oyo Nkolo apesaki ngai, ya kosakola sango malamu ya ngolu na Nzambe.

25Sikʼoyo, nayebi ete bokomona ngai lisusu te, bino nyonso kati na banani nalekaki mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe. 26Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso. 27Pamba te, nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe, mpe nabombelaki bino ata eloko moko te. 28Bomibatela malamu mpe bobatela mpate nyonso oyo Molimo Mosantu apesa bino ete bokengela. Bozala babateli ya Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na ye moko.

29Nayebi malamu ete sima na ngai kokende, bato mabe bakoya kati na bino, bakozala lokola bankosi, bakoyokela mpate mawa te. 30Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango. 31Yango wana, bofungola miso ! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moi, natikaki te, na mayi na miso, kokebisa moko na moko na bino.

32Sikʼoyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe ya Liloba na ye na ngolu. Ye azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula elongo na basantu nyonso. 33Nalulaki palata, to wolo to elamba ya moto moko te. 34Bino moko boyebi malamu ete maboko na ngai oyo nde esalaki mosala mpo na kopesa ngai mpe baninga na ngai, biloko oyo tozalaki na yango posa. 35Na misala nyonso oyo nazalaki kosala, nazalaki kotalisa bino ete, ezali na nzela ya mosala ya makasi ya lolenge wana nde tokoki kosunga bato bakelela, wana tozali kokanisa Maloba oyo ye moko Nkolo Yesu aloba : “Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa !”

36Tango asilisaki koloba, ye elongo na bango nyonso bafukamaki mpe abondelaki. 37Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki ye mpe bapesaki ye beze. 38Bayokaki mawa mingi mpo ayebisaki bango ete bakomona ye lisusu te. Bongo bakendaki kotika ye kino na masuwa.
Copyright information for LinMNB