Acts 21

BATATOLI NA ENGUMBA YA ROME

Polo akeyi na Yelusalemi

1Sima ya kokabwana na bango, tokotaki na masuwa mpe tokendaki kino na esanga ya Kosi. Bongo na mokolo oyo elandaki, tokendaki na Roda, mpe longwa wana, tokomaki na Patara. 2Kuna, tomonaki masuwa moko oyo ezalaki kokende na Fenisi, tomataki kati na yango mpe tokendaki. 3Tango tomonaki esanga ya Shipre, totikaki yango na loboko ya mwasi mpe tokobaki mobembo na biso na mopanzi ya Siri. Totelemaki na Tire epai wapi masuwa esengelaki kokitisa biloko oyo ememaki. 4Lokola tokutaki bayekoli kuna, tovandaki na bango mikolo sambo. Bongo, na lisungi ya Molimo, balobaki na Polo ete akende na Yelusalemi te. 5Kasi tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso, basi na bango elongo na bana na bango bakendaki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpe tosambelaki. 6Sima ya kopesana mbote ya suka, tomataki na masuwa, mpe bango bazongaki na bandako na bango.

7Tosukisaki mobembo na biso ya mayi, longwa Tire kino na Pitolemayisi, epai wapi topesaki bandeko mbote mpe tovandaki na bango mokolo moko. 8Na mokolo oyo elandaki, tokendaki na Sezare mpe tovandaki na ndako ya Filipo, mopanzi sango malamu. Azalaki moko kati na bato sambo oyo Lingomba eponaki. 9Azalaki na bana basi minei oyo bayebaki nanu nzoto ya mibali te, mpe bazalaki na likabo ya kosakola.

10Lokola tovandaki wana mikolo ebele, mosakoli moko na kombo ya Agabusi awutaki na Yudea 11ayaki kokutana na biso. Azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo na maboko. Alobaki : “Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi : ‘Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga mokolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya.’ ”

12Tango toyokaki maloba wana, biso na bandimi ya Sezare tobondelaki Polo ete akende na Yelusalemi te. 13Kasi ye azongiselaki biso : “Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.” 14Lokola tolongaki te kobongola makanisi na ye, totikaki kobondela ye mpe tolobaki : “Tika ete mokano ya Nkolo esalama !”

15Sima ya mikolo wana, tobongisaki biloko na biso mpe tokendaki na Yelusalemi. 16Bayekoli misusu ya Sezare bakendaki nzela moko na biso. Bamemaki biso na ndako ya moto moko na kombo ya Minaso, epai wapi tovandaki. Azalaki moto ya Shipre mpe akoma moyekoli wuta kala.

Polo akutani na Jake

17Tango tokomaki na Yelusalemi, bandeko bayambaki biso na esengo penza. 18Na mokolo oyo elandaki, Polo amemaki biso epai ya Jake, epai wapi bakambi nyonso ya Lingomba bazalaki. 19Sima ya kopesa bango mbote, Polo akomaki koyebisa bango likambo moko na moko, oyo Nzambe asalaki kati na bato ya bikolo ya bapaya, na nzela ya mosala na ye.

20Tango bayokaki bongo, bakumisaki Nzambe mpe balobaki na Polo : “Ndeko, tala nanu bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, kasi bango nyonso bazali nanu ya kokangama na Mobeko. 21Nzoka nde, bayokaki sango ete, oteyaka Bayuda oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe olobaka na bango ete bakata te, nzoto ya mibali ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda. 22Sikʼoyo tosala nini ? Mpo ete bakoyoka kaka ete okomi awa ! 23Boye, sala makambo oyo tokoyebisa yo. Tozali awa na mibali minei oyo balapa ndayi. 24Kamata bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka mpo na yo ezali ya lokuta ; bakososola ete yo mpe otosaka Mobeko. 25Kasi mpo na bato ya bikolo ya bapaya oyo bakomi bandimi, tokomelaki bango mokanda na tina na mikano oyo tozwaki ete balia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, balia makila te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe basala te ekobo ya lolenge nyonso.”

26Na mokolo oyo elandaki, Polo amemaki bato yango mpe amipetolaki elongo na bango. Akotaki na Tempelo mpo na koyebisa mokolo oyo mikolo ya komipetola ekosila, mokolo oyo bakopesa likabo mpo na moko na moko kati na bango.

Bakangi Polo na Yelusalemi

27Tango mikolo sambo ekomaki pene ya kokoka, Bayuda ya mokili ya Azi bamonaki Polo na Tempelo. Boye, basalaki ete bato batomboka mpe bakangaki ye. 28Bazalaki koganga : “Bato ya Isalaele, bosunga biso ! Botala moto oyo azali koteya bato nyonso, na bisika nyonso ete batelemela bato na biso, Mobeko na biso mpe Tempelo. Botala, akotisi ata bato ya mokili ya Greki na Tempelo mpe abebisi bosantu ya esika oyo.” 29Balobaki bongo mpo ete liboso, bamonaka na engumba, Polo elongo na Trofime, moto ya Efeso, mpe bakanisaki ete Polo akotisi ye na Tempelo.

30Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe bato ebele oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombango. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo, mpe na mbala moko, bakangaki bikuke na yango. 31Wana bazalaki koluka koboma Polo, sango ekomaki kino epai ya mokonzi ya basoda ya Rome ete Yelusalemi mobimba ekoti na mobulu. 32Kaka na tango wana, azwaki basoda elongo na bakonzi na bango, mpe bakendaki na lombango epai ngulupa ya bato ezalaki. Boye, tango kaka bamonaki mokonzi ya basoda elongo na basoda na ye, batikaki kobeta Polo.

33Mokonzi ya basoda apusanaki, akangaki Polo mpe apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo mibale. Boye, atunaki soki Polo azali nani mpe asali nini. 34Kati na ngulupa ya bato oyo batondaki wana, bato na bato bazalaki koganga na ndenge na bango. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola bosolo ya likambo te mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo na lopango ya basoda. 35Tango Polo atiaki matambe ne ye na binyateli ya esikalie, basoda bamemaki ye mpo ete bato bazalaki kotia mobulu makasi. 36Boye, ngulupa nyonso ya bato bazalaki kolanda ye na koganga : “Akufa !”

Kosamba ya Polo

37Na tango balingaki kokotisa ye na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda :

—Nakoki koyebisa yo likambo moko ?

Mokonzi ya basoda atunaki Polo :

—Oyebi koloba monoko ya bato ya mokili ya Greki ?
38Boni, ezali yo te moto ya Ejipito oyo akotisaki mobulu na mikolo oyo eleki, mpe amemaki batomboki nkoto minei (4.000) na esobe ?

39Polo azongisaki :

—Te, ezali ngai te ! Ngai nazali Moyuda ya Tarse, na mokili ya Silisi, mpe moto ya engumba moko ya tina mingi penza. Nabondeli yo, pesa ngai nzela ya koloba na bato.

40Mokonzi ya basoda apesaki ye nzela. Boye, Polo atelemaki na esikalie, atombolaki loboko. Tango bato batikaki makelele, akomaki koloba na bango na monoko ya Arami :
Copyright information for LinMNB