Acts 22

1“Bandeko mpe batata, boyoka sikʼoyo ndenge nini nalingi komilongisa.” 2Tango bayokaki Polo koloba na monoko ya arami, bavandaki lisusu kimia koleka.

Bongo, Polo alobaki :

3—Nazali Moyuda, nabotama na Tarse ya mokili ya Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamaliele nde azalaki molakisi na ngai. Ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Boye, nazalaki na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo. 4Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga ezala mibali to basi mpe kobwaka bango na boloko. 5Mokonzi ya banganga-Nzambe mpe likita mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Bongo, nakendaki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na minyololo na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.

6Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, ezalaki pene ya ngonga ya midi, na mbala moko, namonaki kongenga moko ya makasi penza kowuta na likolo mpe engengelaki ngai. 7Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai :

—Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai ?

8Natunaki :

—Nkolo, yo nani ?

Alobaki na ngai :

—Nazali Yesu ya Nazareti oyo yo ozali konyokola !

9Bato oyo bazalaki na ngai elongo, bamonaki kongenga yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.

10Natunaki :

—Nkolo, nasala nini ?

Nkolo alobaki na ngai :

—Telema mpe kende na Damasi. Kuna bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala.

11Baninga na ngai basimbaki ngai na loboko mpe bamemaki ngai kino na Damasi, pamba te kongenga wana ebomaki ngai miso.

12Ezalaki na moto moko kuna na kombo ya Ananiasi. Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana. 13Ayaki kokutana na ngai mpe alobaki : “Ndeko na ngai Saulo, mona lisusu !” Mpe Kaka na tango wana, nazwaki lisusu makoki ya komona ; mpe namonaki ye. 14Bongo, alobaki na ngai : “Nzambe ya bakoko na biso apona yo wuta kala mpo ete oyeba mokano na ye, mpo omona Moto na sembo mpe oyoka mongongo na ye. 15Okozala motatoli na ye liboso ya bato nyonso, mpo na koyebisa bango makambo nyonso oyo osili komona mpe koyoka. 16Boye, mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo.”

17Tango nazongaki na Yelusalemi mpe nazalaki kobondela na Tempelo, nakweyaki na Molimo, 18mpe nayokaki Nkolo koloba na ngai : “Sala noki, bima na Yelusalemi, pamba te bato na yango bakondima te litatoli oyo okoloba mpo na ngai.”

19Ngai nazongisaki : “Nkolo, bato wana bayebi malamu ete nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kobwaka na boloko mpe kobetisa fimbo bato oyo bazalaki kondimela yo. 20Tango basopaki makila ya Etiene, motatoli na yo, ngai mpe nazalaki wana, nandimaki makambo oyo esalamaki mpe nazalaki kokengela bilamba ya bato oyo babomaki ye.”

21Kasi Nkolo azongiselaki ngai : “Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya.”

Polo kati na boloko

22Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki : “Moto ya lolenge oyo asengeli kolongwa na mokili ! Akoki kozala na bomoi te !”

23Lokola bazalaki koganga makasi penza, mpe kobwaka bilamba na bango mpe putulu na likolo, 24mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda, mpe babeta ye fimbo mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazalaki koganga bongo mpo na ye. 25Kasi tango bazalaki kokanga Polo basinga, atunaki mokonzi oyo azalaki wana : “Boni, bozali penza na ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbo, wana bosambisi ye nanu te ?”

26Tango mokonzi oyo ayokaki maloba wana, akendaki koyebisa mokonzi ya basoda :

—Olingaki kosala nini ? Moto wana azali moto ya Rome !
27Kaka na tango wana, mokonzi ya basoda akendaki epai ya Polo mpe atunaki ye :

—Yebisa ngai solo, ozali penza moto ya Rome ?

Azongisaki :

—Eh, ezali bongo !

28Boye, mokonzi ya basoda alobaki :

—Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome !

Polo azongisaki :

—Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.

29Boye, kaka na tango wana, bato oyo balingaki kobeta ye fimbo batikaki ye. Boye, mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete moto oyo ye atindaki ete bakanga minyololo azali moto ya Rome.

Polo liboso ya Likita monene

30Na mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, atindaki ete bafungola Polo minyololo mpe abengisaki bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato ya Likita monene ete basala likita. Boye, ayaki na Polo mpe atiaki ye liboso na bango.
Copyright information for LinMNB