Acts 24

Polo asambi liboso ya moyangeli Felikisi

1Sima ya mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya banganga-Nzambe ayaki na Sezare elongo na bakambi misusu mpe molobeli moko na kombo ya Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli. 2Tango babengisaki Polo, Tertile akomaki kofunda ye liboso ya Felikisi na maloba oyo :

—Tata mokonzi Felikisi, ezali mpo na yo nde tozali na kimia ya solo, mpe mpo na bwanya na yo nde mbongwana ya solo ekota kati na ekolo oyo.
3Tata mokonzi Felikisi, na bisika nyonso mpe na tango nyonso, tondimaka yango mpe totondaka yo mingi penza. 4Kasi tolingi te kozwa yo tango molayi. Nabondeli yo, salela biso ngolu ya koyoka biso na mokuse.

5Biso tomoni ete moto oyo mosala na ye kotia mobulu ; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti, 6mpe amekaki kutu kobebisa bosantu ya Tempelo, yango wana tokangaki ye. [Tozalaki na posa ya kosambisa ye ndenge Mobeko na biso etindaka, 7kasi Lisiasi, mokonzi ya basoda ayaki mpe abotolaki ye na maboko na biso na makasi. 8Atindaki bato oyo bafundaki ye ete baya epai na yo.] Yo moko soki otuni ye mituna, okososola ete makambo oyo tofundeli ye ezali ya solo.

9Bayuda babetaki sete na makambo oyo bafundelaki ye.

10Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki :

—Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo.
11Yo moko okoki koluka koyeba malamu ete, eleki nanu mikolo zomi na mibale te wuta nakendaki na Yelusalemi mpo na kosambela Nzambe. 12Mpe bato oyo bafundi ngai, batikala nanu kokuta ngai te ezala na Tempelo, to na bandako ya mayangani to mpe na engumba, nazali kotia tembe na moto to mpe kotindika bato ete batomboka. 13Bakolonga te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sikʼoyo. 14Nzoka nde, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga : “binzambi-nzambi.” Nandimaka nyonso oyo ekomama na Mobeko mpe na mikanda ya basakoli ; 15boye ngai mpe lokola bango, nazalaka na elikya epai na Nzambe ete bato nyonso, ezala bato ya sembo to ya mabe bakosekwa. 16Yango wana, ngai mpe nasalaka nyonso na tango nyonso ete nazala na likambo moko te na motema liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.

17Sima na ngai kozala mibu ebele libanda ya Yelusalemi, nazongaki kuna mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi mpe kopesa makabo epai ya Nzambe. 18Bakutaki ngai na Tempelo tango nasilisaki komipetola. Boye, ngulupa ya bato ezalaki pembeni na ngai te, bongo mobulu mpe ezalaki te. 19Kasi ezali ndambo ya Bayuda ya Azi oyo bazalaki wana nde basengelaki kotelema liboso na yo mpo na kofunda ngai, soki solo bazwaki ngai na likambo. 20To mpe bato oyo bazali awa, bango moko baloba soki mabe nini bazwaki ngai tango nasambaki liboso ya Likita-monene. 21Boni, ezali te mpo ete wana natelemaki liboso na bango nagangaki : “Bozali kosambisa ngai lelo mpo ete nandimaka ete bato bakufa bakosekwa ?”

22Felikisi, oyo ayebaki malamu penza makambo oyo etali Nzela wana, azongisaki bango mpe alobaki : “Nakokata likambo na bino tango mokonzi ya basoda Lisiasi akoya.” 23Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama ete abatela Polo na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa nzela na baninga na ye ete bakoka kosunga ye.

24Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye Drusiye oyo azalaki Moyuda. Abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu Klisto. 25Kasi tango Polo abandaki koloba na tina na bosembo, na komibatela mpe na kosambisama oyo ezali koya, Felikisi akomaki na somo mpe alobaki na ye : “Ekoki mpo na sikʼoyo ! Okoki kokende. Soki nazwi lisusu tango nakobengisa yo.” 26Felikisi azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpo na kosolola na ye, na elikya ete Polo akopesa ye kanyaka. 27Sima na mibu mibale, Porsiusi Festisi akomaki moyangeli na esika ya Felikisi, oyo mpo na kosepelisa Bayuda, atikaki Polo na boloko.
Copyright information for LinMNB