Acts 25

Polo asengi kosamba liboso ya Kayisala

1Sima na mikolo misato ya boyei na ye na etuka, Festisi alongwaki na Sezare mpo na kokende na Yelusalemi, 2epai wapi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bakendaki kokutana na ye mpo na kofunda Polo. 3Babondelaki Festisi mingi mpo ete asalela bango ngolu, ete atinda Polo na Yelusalemi ; pamba te, basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye. 4Kasi Festisi azongiselaki bango : “Polo azali nanu na boloko na Sezare. Etikali moke ngai moko mpe nazonga kuna. 5Tika ete tokende nzela moko na ndambo ya bakambi na bino, mpo ete soki moto yango asalaki mabe, bafundela ye kuna.”

6Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezare. Boye, na mokolo oyo elandaki, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo. 7Tango Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye mpo na makambo mingi ya mabe, oyo bango moko kutu bazalaki na makoki te ya kolakisa bosolo na yango.

8Boye, tala ndenge Polo asambaki : “Nabuki ata mobeko te ya Bayuda, to ya Tempelo to mpe ya Kayisala.”

9Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo :

—Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo ?

10Polo azongisaki :

—Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Kayisala ; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe.
11Soki ya solo ngai nasali mabe, to nasali likambo oyo ekoki mpo na komemela ngai etumbu ya liwa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda oyo bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Kayisala akata likambo na ngai !

12Sima na Festisi kozwa toli ya likita na ye, alobaki na Polo :

—Lokola osengi kokende kosamba liboso ya Kayisala, okokende solo kosamba liboso na ye.

Polo liboso ya Festisi mpe Agripa

13Sima na mwa mikolo, mokonzi Agripa elongo na Berenise bayaki na Sezare mpo na kopesa Festisi mbote. 14Lokola balekisaki mikolo mingi kuna, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo. Alobaki :

—Moto moko azali awa, Felikisi atikaki ye na boloko.
15Tango nakendaki na Yelusalemi, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bayaki kofunda ye epai na ngai mpe basengaki ete nakatela ye etumbu.

16Kasi nayebisaki bango ete, bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu, soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye ; mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye. 17Tango bayaki awa, nalekisaki tango te. Kaka na mokolo oyo elandaki, navandaki na esambiselo mpe napesaki mitindo ete bamemela ngai moto yango. 18Tango bato oyo bafundaki ye bakomaki koloba, balongaki te kotalisa bosolo ya makambo ya mabe oyo bafundelaki ye, ndenge ngai nazalaki kokanisela. 19Likambo bazalaki na yango ezalaki kaka : tembe mpo na makambo oyo etali lolenge na bango ya kosambela mpe mpo na moto moko oyo akufa, kombo na ye Yesu, kasi Polo azali koloba ete azali na bomoi ! 20Lokola nayebaki te ndenge nini nakokaki kokata likambo ya ndenge wana, natunaki ye soki alingi kokende na Yelusalemi mpo ete bakata likambo na ye kuna. 21Kasi Polo asengaki ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene. Boye, napesaki mitindo ete babatela ye na boloko kino tango nakotinda ye epai ya Kayisala.

22Agripa alobaki na Festisi :

—Nazali na posa ya koyoka moto wana ngai moko.

Festisi azongisaki :

—Okoyoka ye lobi !

23Na mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo. 24Festisi alobaki :

—Mokonzi Agripa mpe bato nyonso oyo bazali elongo na biso, bozali komona moto oyo ! Lingomba mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye na Yelusalemi mpe na Sezare. Bazalaki koganga ete asengeli kokufa !
25Nzoka nde, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya liwa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome. 26Lokola nazali na likambo moko te ya malonga mpo na kokomela mokonzi monene na tina na ye ; nayei na ye liboso na bino nyonso, mpe koleka, liboso na yo mokonzi Agripa mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, soki tosilisi kotuna ye mituna. 27Pamba te, namoni ekozala penza tina te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye.
Copyright information for LinMNB