Acts 27

Bamemi Polo na Rome

1Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi, oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama ya Rome, kati na mapinga ya mokonzi monene. 2Tomataki na masuwa oyo ewutaki na engumba ya Adramite mpo na kokende na mabongo ya pembeni-pembeni ya mokili ya Azi, mpe tokendaki. Boye, Aristarke, moto ya Masedwane ya Tesalonika azalaki na biso elongo.

3Na mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba ya Sidoni. Lokola Juliusi azalaki kotalisa bolamu epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala baninga na ye mpo ete bakoka kopesa ye lisungi. 4Tango tolongwaki wana, tozongelaki mobembo na biso mpe tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga ya Shipre, mpo na kokima mipepe oyo ezalaki kobeta biso makasi mpe kopekisa biso kokende liboso. 5Boye, tokatisaki ebale monene oyo eleka pembeni-pembeni ya Silisi mpe ya Pafili, mpe tosemaki na Mira, na mokili ya Lisi. 6Kuna, mokonzi ya basoda nkama amonaki masuwa moko ya engumba Alekizandri, oyo ezalaki kokende na Itali, bongo akotisaki biso kati na yango. 7Tosalaki mikolo mwa mingi na mobembo, mpe tokomaki na Sinide na pasi mingi, pamba te masuwa ezalaki kotambola malembe penza. Mpe lokola mopepe ezalaki kopekisa biso kokende liboso, tolekaki Salimone, mpe tokendaki na ngambo ya sude ya esanga ya Krete. 8Tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga yango na pasi penza, kino tokomaki na esika moko babengaka : “Mabongo ya kitoko.” Yango ezalaki pene ya engumba ya Laseya.

9Tango mingi elekaki mpe masuwa ekomaki kotambola na matata, mpo ete eleko ya kokila bilei esilaki koleka. Boye, Polo akebisaki bango : 10“Baninga na ngai, nazali komona lokola mobembo na biso ekozanga likama te, boye masuwa, biloko mpe bomoi na biso ekoki kobebisama.” 11Nzoka nde, mokonzi ya basoda nkama na esika ya koyoka maloba ya Polo, alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya mokolo masuwa. 12Mpe lisusu, lokola libongo ezalaki esika malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma, soki tokolonga, na Fenikisi mpo na kolekisa tango ya malili makasi kuna. Fenikisi ezalaki libongo ya Krete oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nori-weste.

Mopepe makasi mpe kozinda ya masuwa

13Wana mwa mopepe ya sude ekomaki kopepa, bakanisaki ete posa na bango ekokokisama ; batombolaki longo mpe masuwa ekomaki kotambola pembeni-pembeni ya esanga ya Krete. 14Kasi na sima ya mwa tango, mopepe moko ya makasi penza oyo babengaka erakiloni
Erakiloni  : ezali mopepe moko ya makasi penza oyo ewutaka na ngambo ya nori-este.
ekomaki kopepa wuta na esanga.
15Boye, ememaki masuwa, mpe masuwa elongaki nguya ya mopepe te, kino tomitikaki bongo, mpe mopepe yango ememaki biso. 16Ememaki biso mbangu pembeni-pembeni ya esanga moko ya moke, na kombo ya Koda, mpe tomonaki pasi mingi mpo na kokanga bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama. 17Tango bamatisaki yango na masuwa, bazwaki basinga ya minene mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa. 18Lokola mopepe ezalaki kaka koningisa masuwa makasi, na mokolo oyo elandaki, babwakaki biloko oyo ezalaki kati na masuwa na ebale. 19Boye, na mokolo oyo ya misato, na maboko na bango, babwakaki na mayi biloko oyo etambolisaka masuwa. 20Lokola tosalaki mikolo ebele tozalaki komona lisusu moyi mpe minzoto te, mpe mopepe ezalaki kaka kobeta makasi, tozalaki lisusu na elikya ya kobika te.

21Esalaki mikolo ebele, bato bazalaki lisusu kolia te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki : “Eh baninga ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Krete te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki kobungisa biloko na bino te. 22Kasi sikʼoyo, nasengi ete bozwa makasi, pamba te moto ata moko te kati na bino akokufa ; masuwa kaka nde ekobeba. 23Na butu ya lelo, anjelu ya Nzambe na ngai oyo nasalelaka, ayaki epai na ngai 24mpe alobaki : ‘Kobanga te Polo ! Osengeli kosamba liboso ya Kayisala. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo bozali kosala na bango mobembo na masuwa.’ 25Baninga na ngai, bobungisa elikya te ! Pamba te, nazali kondima ete Nzambe akosala kaka ndenge ayebisaki ngai. 26Kasi ata bongo, tokokangama kaka na esanga moko.”

27Na butu oyo ya zomi na minei, masuwa ezalaki kaka komemama epai na epai kati na ebale monene ya Adriatiki. Na katikati ya butu, basali ya masuwa bakanisaki ete tokomi pene ya mokili ; 28babwakaki singa mpo na komeka mozindo ya mayi, mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezalaki na bametele pene tuku misato na sambo. Wana bapusanaki mwa liboso, bamekaki lisusu mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezalaki na bametele pene tuku mibale na mwambe. 29Lokola bazalaki kobanga ete masuwa etuta mabanga, babwakaki balongo minei na mayi na sima ya masuwa, na posa makasi ya kozela tongo kotana. 30Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola bato balingi kokende kokangisa balongo liboso ya masuwa. 31Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama mpe na basoda : “Tala, soki bato oyo batikali kati na masuwa te, bino mpe kobika te.” 32Boye, basoda bakataki basinga oyo esimbaki bwatu yango mpe batikaki yango kokweya na mayi.

33Wana bazalaki kozela tongo kotana, Polo alendisaki bato nyonso ete balia. Alobaki : “Ekokisi lelo mikolo zomi na minei ya kozela na somo, mpe bolie ata eloko moko te. 34Nabondeli bino sikʼoyo ete bolia, mpo ete banzoto na bino ekoma makasi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.” 35Sima ya koloba bongo, akamataki lipa mpe atondaki Nzambe liboso na bango nyonso. Boye, akataki yango mpe akomaki kolia. 36Bango nyonso balendisamaki mpe bakomaki kolia. 37Bato nyonso oyo tozalaki kati na masuwa, tozalaki nkama mibale na tuku sambo na motoba. 38Tango baliaki mpe batondaki, babwakaki ble na ebale mpo na kokitisa kilo ya masuwa.

39Tango tongo etanaki, bamonaki mokili te, kasi bamonaki kaka libongo moko ya zelo na suka, epai ebale ekota. Boye, bazwaki mokano, soki bakolonga, ya kosemisa masuwa kuna. 40Babwakaki balongo na ebale, mpe kaka na tango wana bafungolaki basinga ya yenda. Batombolaki bakapo mpo ete mopepe emema masuwa na ngambo ya libongo ya zelo. 41Kasi masuwa ekendaki kotutana na zelo ya ebale mpe ekangamaki. Wana eteni ya liboso ya masuwa ekangamaki na zelo mpe ezalaki lisusu koningana te, eteni ya sima ya masuwa epanzanaki na nguya ya bambonge.

42Basoda bazwaki likanisi ya koboma bakangami mpo bazalaki kobanga ete bakatisa mayi mpe bakima. 43Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango ete bakokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili. 44Mpe oyo bakotikala, misusu basalela mabaya to biteni ya masuwa. Na ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili.
Copyright information for LinMNB