Colossians 2

1Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba ya makasi penza mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise, mpe mpo na baoyo nyonso nanu bamona ngai te. 2Nazali kobunda bongo mpo ete mitema na bango etonda na mpiko mpe bazala lisanga kati na bolingo. Mpo ete bakoka kozala na bomengo nyonso ya bososoli mobimba, mpo ete bakoka koyeba sekre ya Nzambe : Yesu ye nde Klisto ; 3bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi na Nzambe ezali ya kobombama kati na ye.

4Nalobi na bino boye mpo ete moto moko te akosa bino na maloba ya lokuta. 5Pamba te, ata nazali na bino esika moko te na nzoto, kasi nazali na bino elongo na nzela ya molimo mpe nazali na esengo mpo na komona boyokani oyo bozali na yango mpe ndenge kondima na bino elelemi ngwi kati na Klisto.

Klisto, Bwanya Ya Solo

6Yango wana, lokola bosiʼboyamba Klisto Yesu lokola Nkolo, bokoba kozala kati na ye. 7Bozala ya kolonama mpe ya kotongama kati na ye, mpe bozala ya kolendisama kati na kondima na ndenge oyo bateyaki bino. Bozongisaka matondi tango nyonso. 8Bokeba mpo ete ata moto moko te akanga bino na motambo, na maloba ya makanisi ya bomoto mpe oyo ekosaka, oyo ewutaka na mateya ya bato mpe na milimo oyo ekambaka mokili kasi ewotaka na Klisto te. 9Pamba te, kotondisama nyonso ya Bonzambe na lolenge ya nzoto evandi kati na Klisto. 10Bino mpe bozali na kotondisama yango kati na Klisto, ye oyo azali Mokonzi ya bokonzi nyonso mpe ya nguya nyonso. 11Ezali kati na ye nde bakataki bino nzoto, mpe kokatama yango esalamaki na maboko ya bato te kasi esalamaki na nzela ya Klisto mpe yango nde elongoli bino na bowumbu ya nzoto ya masumu. 12Tango bozwaki libatisi, bakundaki bino elongo na ye, mpe bosekwaki elongo na ye na nzela ya kondima ngoya na Nzambe oyo asekwisaki ye kati na bakufi.

13Tango bozalaki bakufi mpo na masumn na bino mpe tango bozalaki bato oyo bakatama nzoto te, Nzambe apesaki bino bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso :

14pamba te apasolaki mokanda oyo ezalaki kofunda biso elongo na mibeko na yango. Alongolaki yango mpe abakaki yango na ekulusu. 15Alongolaki makasi ya milimo ya lokumu mpe ya nguya ; alakisaki yango na miso ya bato nyonso tango atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba, mpe alongaki yango na ekulusu.

16Yango wana, botika ata moto moko te asambisa bino mpo na biloko oyo boliaka to bomelaka, to mpe mpo na oyo etali mikolo ya feti, feti ya sanza ya sika, to mokolo ya saba. 17Nyonso wana, ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya ; kasi solo na yango ezali komonana kati na Klisto. 18Botika te ete basambisa bino na bato oyo balukaka komikitisa na makambo oyo emonanaka mpe basambelaka ba-anzelu. Bamipesaka na bimoniseli na bango moko, mpe makanisi na bango ya bomoto etondisaka bango na lofundu oyo ezangi tina.

19Baboyaka kokangama na Klisto, ye oyo azali moto, wuta na ye nde nzoto mobimba ezali kozwa bilei mpe esangani malamu esika moko na nzela ya misisa mpe misuni. Mpe ezali kokola na kokola oyo Nzambe azali kopesa yango.

BOMOI KATI NA KRISTO

Bonsomi Kati Na Klisto

20Soki bosiʼbokufa elongo na Klisto mpe bosiʼbolongwa na nse ya bokonzi ya milimo oyo ekambaka mokili, bongo mpo na nini bozali kotosa mibeko lokola oyo, lokola nde bozali nanu na bomoi na kati ya mokili : 21“Kozwa te, komeka te, kosimba te !” 22Biloko nyonso wana ebongisama mpo na kobeba sima ya kosalela yango. Yango ezali kaka mibeko mpe mateya ya bomoto 23Mibeko ya ndenge wana, emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka ete bato basambela ndenge bango moko balingi, bazala na komikitisa ya lokuta, mpe bamipesaka pasi na nzoto. Kasi mibeko yango ezali penza na tina moko te mpo na kokangisa baposa ya nzoto.
Copyright information for LinMNB