Colossians 3

1Bongo, lokola bosiʼbosekwa elongo na Klisto, botia mitema na bino na biloko oyo ezali na likolo, epai Klisto avandi na loboko ya mobali ya Nzambe. 2Botia makanisi na bino na biloko oyo ezali na Likolou, kati na oyo ezali na mokili te. 3Pamba te bosibokufa, mpe bomoi na bino ezali ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe. 4Tango Klisto, ye oyo azali bomoi na bino, akomonana, bongo bino mpe bokomonana elongo na ye kati na nkembo.

Bomoi ya sika

5Yango wana boboma nyonso oyo ezali ya mokili na bomoi na bino : ekobo, bosoto, baposa ya mabe, bilulela, mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali kosambela bikeko.

6Makambo oyo nde ebendaka kanda ya Nzambe. 7Bino mpe, kala, bozalaki kosala makambo wana, tango bomoi na bino ezalaki na nse ya bokonzi ya makambo wana. 8Kasi sikʼoyo, esengeli boboya makambo wana nyonso : kanda, kotomboka, makambo ya mabe, kofinga, mpe maloba ya soni oyo ebimaka na minoko na bino. 9Botika kokosana bino na bino, lokola bosibobwaka moto ya kala elongo na misala na ye, 10mpe bolata moto ya sika, oyo akomisami ya sika kati na boyebi, na lolenge ya elilingi ya Moto oyo akelaki ye. 11Na bomoto wana ya sika, mogreki to moyuda azali te, moto akatisa nzoto to moto akatisa nzoto te azali te, bapaya to moto ayekola azali te, mowumbu to moto ya bonsomi azali te, kasi Klisto azali nyonso, mpe azali kati na nyonso.

12Yango wana, lokola Nzambe apona bino, bino basantu mpe balingami na ye, bolata mawa, bolamu, komikitisa, boboto, mpe kokanga motema. 13Soki moto azwi moninga na likambo, bokanganaka mitema mpe bolimbisanaka moko na moko. Bolimbisa ndenge Nkolo mpe alimbisaki bino. 14Mpe likolo ya makambo wana nyonso bobakisa bolingo, mpo yango ezali singa oyo ezali kokangisa bato na ndenge oyo ekoki penza. 15Tika ete kimia ya Klisto ezwa bokonzi na kati ya mitema na bino. Pamba te, ezali na kimia wana nde Nzambe abenga bino mpo bozala nzoto moko, mpe boyebaka kozongisa matondi.

16Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na mitema na bino. Boteyana mpe bopesana toli moko na moko na bwanya nyonso. Boyemba banzembo, masanzoli, mpe banzembo oyo Molimo apesaka ; boyembela Nzambe, na bozongisi matondi kati na mitema na bino. 17Mpe nyonso oyo bosalaka to bolobaka, bosala yango na kombo ya Nkolo Yesu, mpe, bozongisaka matondi epai ya Nzambe Tata na nzela na Yesu Klisto.

Mateya Mpo Na Libota

18Bino basi, botosaka mibali na bino, na ndenge oyo ekoki kati na Nkolo. 19Bino mibali, bolinga basi na bino mpe bolakisa bango ezaleli ya makasi-makasi te. 20Bino bana, botosa baboti na bino na makambo nyonso, pamba te yango esepelisaka Nkolo. 21Bino batata, boyokisa bana na bino kanda te, mpo ete mpiko na bango esila te.

Mateya Mpo Na Bakonzi Mpe Bawumbu

22Bino bawumbu, botosa bakonzi na bino na makambo nyonso ; mpe bosala yango kaka te tango bazali kokengela bino mpo na koluka kosepelisa bango, kasi bosala yango na bosolo nyonso mpe na bobangi Nkolo. 23Nyonso oyo bosalaka, bosala yango na motema mobimba, lokola nde bozali kosala mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te. 24Pamba te, boyebi ete bokozwa bomengo oyo ekowuta na Nkolo, lokola lifuti. Ezali Klisto, Nkolo nde bozali kosalela. 25Moto oyo asalaka mabe, akozwa lifuti ya mabe na oyo asalaki ; mpe Nzambe aponaka bilongi te.
Copyright information for LinMNB