Colossians 4

1Bino bakonzi, bopesa bawumbu na bino oyo ezali ya sembo mpe ya kokoka, mpo boyebi ete bino mpe bozali na Mokonzi na Likolo.

Mitindo ya suka

2Bozala na molende kati na mabondeli, bokengelaka kati na yango mpe bozongisaka matondi. 3Bobondelaka mpo na biso, mpo ete Nzambe akoka kofungola ekuke mpo na mateya na biso, mpo ete tokoka kosakola sekre ya Klisto. Mpo na sekre na yango nazali ya kokangama na boloko. 4Bobondela mpo ete nakoka kosakola yango na polele nyonso, ndenge nasengeli koloba.

5Bozala bato ya bwanya kati na bizaleli na bino liboso ya bato oyo bazali bandimi te ; mpe bosalela tango. 6Tika ete masolo na bino ezala tango nyonso ya kotonda na ngolu mpe na elengi, mpo ete bokoka koyeba ndenge nini bosengeli kozongisa eyano na moto na moto.

7Tishike akoyebisa bino basango nyonso oyo etali ngai. Ye azali ndeko molingami, mosali ya solo, mpe moninga ya mosala kati na Nkolo. 8Natindi ye epai na bino mpo na likanisi wana, mpo bokoka koyeba basango na biso mpe abondisa mitema na bino. 9Azali koya elongo na Onezime, ndeko na biso ya solo mpe ndeko molingami, ye oyo azali moko na bino. Bango bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa.

10Aristarke, moninga na ngai moto ya boloko, atindeli bino mbote, ndenge moko mpe Marko, ndeko ya Barnabasi. Bosiʼbozwaki mitindo mpo na ye ; soki aye epai na bino, boyamba ye malamu. 11Yesu oyo babengaka Yustns, ye mpe atindeli bino mbote. Na kati ya Bayuda oyo bakomaki bakristo, kaka bango nde basalaka elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bango nde babondisaki ngai.

12Epafras, ye oyo azali moko na bino mpe mowumbu ya Klisto Yesu, atindeli bino mbote. Abundaka etumba tango nyonso mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete bokoka kotelema ngwi kati na mokano mobimba ya Nzambe, bokola na molimo mpe botonda na elikya. 13Nazali kotatola mpo na ye ete azali kosala mosala ya makasi mpo na bino, mpe mpo na bandeko ya Laodise mpe ya Iyerapolis.

14Molingami na biso monganga Luka, mpe Demas, batindeli bino mbote. 15Bopesa mbote na bandeko ya Laodise, na Nimfa, mpe na Lingomba oyo esanganaka na ndako na ye.

16Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala nyonso ete yango etangama mpe na lingomba ya Laodise, bongo bino mpe botanga oyo ekowuota na Laodise.

17Boyebisa Arshipe : batela mosala oyo ozwaki kati na Nkolo, mpo ete osilisa yango.

18Ngai Polo, nakomi mbote oyo na loboko na ngai moko. Bobosanaka te ete nazali na boloko. Tika ete Ngolu ezala na bino.
Copyright information for LinMNB