Ephesians 6

Mateya Mpo Na Baboti Mpe Bana

1Bino bana, botosa baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango ezali sembo. 2“Mobeko ya liboso oyo ezali na elaka, yango oyo: Tosa tata mpe mama na yo,” 3mpo ete makambo na yo etambola malamu mpe owumela tango molayi kati na mokili.

4Bino batata, boyokisa bana na bino kanda te, kasi bobokola bango kati na mateya mpe na makebisi ya Nkolo.

Mateya Mpo Na Bakonzi Mpe Bawumbu

5Bino bawumbu, botosa bakonzi na bino ya mokili, na bobangi, botosi, mpe na bosolo nyonso, lokola nde bozali kosala yango na Kristo. 6Bosala mosala na bino kaka te soki bazali kokengela bino, lokola nde bozali kolinga kosepelisa bato; kasi bosala yango lokola bawumbu ya Kristo, baoyo bazali kokokisa mokano ya Nzambe na motema na bango mobimba. 7Bosala mosala na bino na esengo nyonso, lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato te. 8Pamba te boyebi malamu ete, Nkolo akofuta moto na moto mpo na makambo nyonso ya malamu oyo azali kosala, azala mowumbu to moto ya bonsomi.

9Bongo bino bakonzi, bozala mpe ndenge moko na bawumbu na bino; botika kotungisa bango. Pamba te boyebi ete, Mokonzi na bango na oyo ya bino, azali na Likolo; mpe atalaka bilongi ya bato te.

Bolata Bibundeli Ya Nzambe

10Mpo na kosukisa: bozwa makasi na bino kati na Nkolo mpe kati na nguya ya makasi na ye.

11Bolata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele ya mabe ya zabolo. 12Pamba te etumba na biso ezali na makila mpe na mosuni te, kasi na milimo oyo ezali na bokonzi, milimo ya lokumu, banguya ya mokili oyo ya molili, mpe na milimo ya mabe oyo ezali na mokili ya milimo.

13Yango wana, bokamata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema na mokolo mabe, mpe sima ya kobunda kino na suka, botelema kaka ngwi. 14Yango wana botelema ngwi: bolata solo lokola mokaba na loketo, bolata bosembo lokola eloko ya libende oyo ebatelaka ntolo, 15bolata molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino.

16Likolo na nyonso, bolata kondima lokola eloko ya libende oyo ekosunga bino mpo na koboma makonga nyonso oyo epelaka moto, oyo moto mabe abwakaka. 17Bokamata lobiko lokola ekoti ya libende, mpe Liloba ya Nzambe lokola mopanga ya Molimo.

Ebiangeli Mpo Na Kobondela

18Na tango nyonso, bobondela mabondeli ya ndenge nyonso mpe ya kosenga, na kotindama ya Molimo. Bosala yango na kokengela mpe na molende, mpe bobondela mpo na basantu nyonso. 19Bobondela mpe mpo na ngai, mpo ete tango nakoloba, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli koloba, mpo ete nateya na molende nyonso sekre ya Sango Malamu, 20oyo ngai nazali ambasadere na yango, ambasadere oyo azali ya kokangama na minyololo. Bobondela mpo ete nateya yango na molende nyonso, ndenge nasengeli koteya yango.

Bambote

21Titsike, ndeko na biso ya bolingo mpe mosali malamu kati na Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe bokoka koyeba ndenge nazali mpe soki nazali kosala nini. 22Tala tina nazali kotinda ye epai na bino, mpo bokoka koyeba ndenge biso tozali, mpe akoka kolendisa mitema na bino.

23Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu Kristo, bapesa bandeko nyonso, kimia, bolingo, mpe kondima. 24Tika ete ngolu ezala na baoyo nyonso balingaka Nkolo na biso Yesu Kristo na bolingo ya solo penza.
Copyright information for LinMNB